Etamboli ya malamu ‘ekómisaka mateya ya Nzambe kitoko’
MARIA, elenge mwasi moko na engumba Kransnoyarsk, na Russie, ayembaka kitoko mpenza mpe molakisi na ye atyaki ye na korale ya eteyelo. Mwa moke na nsima, Maria akendaki kokutana na moko ya balakisi na ye mpe ayebisaki ye na limemya nyonso ete akoki koyemba banzembo mosusu te. Mpo na nini? Mpamba te koyemba banzembo ya mangomba eyokani te na bindimeli na ye oyo euti na Biblia. Molakisi akamwaki mpe atunaki: ‘Mabe nini ezali soki okumisi Nzambe na nzembo?’
Mpo na komonisa ntina oyo aboyaki koyemba nzembo moko oyo ezalaki kolobela bosato, Maria afungolaki Biblia na ye mpe alimbolaki ete Nzambe mpe Yesu bazali Nzambe moko te, mpe ete elimo santu ezali nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala. (Matai 26:39; Yoane 14:28; Misala 4:31) Maria alobi boye: “Boyokani na ngai ná molakisi ebebaki te. Kutu tozali na balakisi ya malamu na kelasi na biso. Basepelaka tólobaka solo.”
Na mbula wana mobimba, balakisi mpe bana-kelasi bakómaki komemya Maria mpo na ezaleli na ye wana. Maria alobi boye: “Mitinda ya Biblia esalisaka ngai na bomoi na ngai. Na nsuka ya mbula, nazwaki mbano mpo na bosembo mpe mpo na kosala makambo na molɔngɔ mpe bakonzi ya kelasi batindelaki baboti na ngai mokanda ya matɔndi mpo babɔkɔlaki ngai malamu.”
Maria azwaki batisimo na mwa 18 Augusto 2001. Alobi ete: “Nazali na esengo ndenge nazali kosalela Nzambe ya malamu, Yehova!” Bilenge Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali kokokisa maloba oyo ezali na Tito 2:10, epai tozali kotánga ete: “Bákómisa kitoko mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe, na makambo nyonso.”
[Elilingi na lokasa 32]
Maria ná baboti na ye nsima ya batisimo na ye
[Elilingi na lokasa 32]
Mokanda ya matɔndi mpe Diplome mpo na mosala malamu