Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/3 nk. 3-4
  • Mpo na nini kowelana na maloba ezali mabe mpenza?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kowelana na maloba ezali mabe mpenza?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • “Bokoyoka lokito ya bitumba”
    Makambo mosusu
  • Bitumba ekosila mokolo nini?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Mosika te, mokili mozangi bitumba
    Lamuká!—1996
  • ‘Toluka kimya mpe tolanda yango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/3 nk. 3-4

Mpo na nini kowelana na maloba ezali mabe mpenza?

“Epai wapi bitumba ezali kouta mpe epai wapi kobunda ezali kouta na kati na bino?”​—YAKOBO 4:1.

NTANGO Yakobo, mokomi moko ya Biblia, atunaki motuna wana, azalaki te koloba na basoda ya Loma oyo bazalaki na ntango wana kobunda bitumba mpo na kobɔtɔla bamboka; azalaki mpe te koloba na Bayuda mosusu oyo batombokaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso mpe bazalaki kobundisa Baloma na bambeli. Yakobo azalaki nde kolobela kowelana oyo ekokaki kozala na kati ya bato mibale. Mpo na nini? Mpamba te, lokola kaka bitumba kati na bikólo, kowelana kati na bato mpe ezalaka mabe mpenza. Tózwa ndakisa ya masolo ya Biblia oyo elandi.

Bana ya Yakobo bayinaki ndeko na bango Yosefe makasi mpenza mpe nsukansuka batɛkaki ye na boombo. (Genese 37:4-28) Na nsima, Saulo, mokonzi ya Yisalaele, alukaki koboma Davidi. Mpo na nini? Mpamba te azalaki koyokela Davidi zuwa. (1 Samwele 18:7-11; 23:14, 15) Na ekeke ya liboso, kowelana kati na Evodi ná Sɛntisi ebebisaki kimya ya lisangá mobimba.​—Bafilipi 4:2.

Na bambula oyo euti koleka, mibali mosusu bazalaki kosilisa kowelana na bango na mimpanga to na mindoki. Mbala mingi moko na bango azalaki kokufa to kobeba enama moko bomoi na ye mobimba. Na moi ya lelo, mbala mingi bato oyo bazali kowelana basukaka kaka na maloba mabe mpe na kofingana. Atako kowelana na maloba esopaka makila te, ezokisaka na motema mpe ebebisaka lokumu ya moto. Mbala mingi “kowelana” yango eyokisaka bato mosusu oyo basali ata eloko te mpasi.

Tózwa ndakisa ya likambo moko oyo esalemaki eleki mwa bambula, ntango pastɛrɛ moko ya Lingomba ya Anglican afundaki pastɛrɛ mosusu ete azalaki koyiba mbongo ya lingomba. Bandimi nyonso bayebaki ete bapastɛrɛ yango mibale bazali koyokana lisusu te, mpe yango esalaki ete bandimi bákabwana na bituluku mibale. Soki moko na bango azali kokamba losambo, bandimi ya ngámbo mosusu bazalaki kokɔta te. Bandimi ya ngámbo mibale wana bakómaki koyinana makasi mpenza na ndenge ete ata ntango bazali na kati ya ndako-nzambe mpo na losambo, bazalaki kobwakelana bambwakela. Ntango bafundaki pastɛrɛ oyo afundaki moninga ete azali kosala kindumba, kowelana ekómaki lisusu makasi.

Episkɔpɔ mokonzi ya Canterbury abengaki bapastɛrɛ yango mibale mpe asambisaki bango; alobaki ete kowelana na bango ezali lokola “kanser” mpe “ezali kobebisa nkombo ya Nkolo na Biso.” Na 1997, moko ya bapastɛrɛ yango andimaki kotika mosala na ye. Oyo mosusu akobaki mosala na ye tii ntango mbula na ye ya kozwa epaso ekokaki. Atako bongo, atikalaki kaka tii ntango akómaki mpenza mobange, mpe alongwaki mwa 7 Augusto 2001, mokolo akokisaki mbula 70. Zulunalo moko (The Church of England Newspaper) elobaki ete asukisaki mosala na ye mokolo ya fɛti ya “Santu” Victrice. “Santu” Victrice azalaki nani? Azalaki episkɔpɔ moko ya ekeke ya minei oyo balobaka ete abɛtamaki fimbo mpo aboyaki kosangana na basoda na etumba. Mpo na komonisa ete pastɛrɛ yango akeseni mpenza na “Santu” Victrice, zulunalo yango elobaki boye: “Pastɛrɛ yango aboyaki ata te kobunda na moninga na ye pastɛrɛ.”

Bapastɛrɛ yango balingaki kozokisana te mpe kozokisa bato mosusu te soki balandaki toli ya Baloma 12:17, 18: “Bózongisa mabe na mabe na moto te. Bókanisaka nde kozongisa makambo ya malamu mingi na miso ya bato nyonso. Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.”

Ezali boni mpo na yo? Soki moto moko asali yo mabe, olukaka koswanisa ye? To ofandaka kaka nyɛɛ mpe ozalaka pene na koyokana lisusu na moto yango soki alingi bóyokana? Soki osali moto mabe, okómaka nde kokima moto yango na elikya ete soki mikolo eleki akobosana likambo yango? To nde ozalaka pene na kosɛnga bolimbisi? Ezala osɛngi bolimbisi to olimbisi moto oyo asalaki yo mabe, milende oyo okosala mpo na koluka kimya ekosala ete ozala nzoto kolɔngɔnɔ. Ndenge lisolo oyo elandi emonisi yango, toli ya Biblia ekoki kosalisa biso tósilisa ata matata oyo eumeli ebele ya bambula.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto