“Sɛkɛlɛ na bino ezali mpenza nini?”
MOTUNA wana oyo mopaya moko ya mobange atunaki Muriel na restora moko, esika akendaki kolya na bana na ye ekamwisaki ye mpenza. Muriel ná bana na ye bakendaki na lopitalo kokutana na minganga mpe baumelaki kuna. Bazalaki lisusu na ntango te ya kozonga na ndako mpo na kolya liboso bákende na makita. Yango wana, bakendaki na restora moko oyo ezalaki pembeni wana mpo na kolya liboso bákende na makita.
Ntango kaka basilisaki kolya, mobali moko apusanaki penepene na Muriel mpe alobaki ete: “Nazali kotala bino banda bokɔtaki; mpe namoni bokeseni monene na kati ya bana na yo ná bana mosusu oyo bayaka awa. Bana mosusu basalaka mobulu mingi: batyaka makolo likoló ya mesa mpe bakweisaka bakiti. Kasi bana na yo bafandi kimya mpe bazali na bizaleli malamu! Sɛkɛlɛ na bino ezali mpenza nini?”
Muriel azongisaki ete: “Ngai ná mobali na ngai toyekolaka na bana na biso Biblia ntango nyonso, mpe na bomoi na biso, tosalaka makasi tósalela makambo oyo toyekolaka. Tozali Batatoli ya Yehova.” Ntango mobali yango ayokaki bongo, alobaki ete: “Nazali Moyuda mpe nabikaki ntango babomaki ebele ya Bayuda (Holocauste). Nazali koyeba lisusu ndenge Batatoli ya Yehova banyokwamaki na Allemagne. Ata na ntango wana ya mpasi, Batatoli bamonanaki ete bakeseni mpenza na bato mosusu. Ezaleli ya bana na yo ekamwisi ngai mpenza. Nakoluka koyeba lingomba na bino malamu.”
Biblia ezali buku ya malamu mpenza mpo na kobɔkɔla bana. Batatoli ya Yehova bazalaka na esengo ya kosalisa bato mosusu bázwa litomba na mateya ya Biblia. Tozali kosɛnga yo osala likambo oyo basɛngi yo na makambo oyo ezali awa na nse.