Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/1 lok. 32
  • Makambo mosusu oyo bokoki kosalaka ntango bozali kolya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mosusu oyo bokoki kosalaka ntango bozali kolya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/1 lok. 32

Makambo mosusu oyo bokoki kosalaka ntango bozali kolya

MOTO nyonso asepelaka na bilei kitoko. Soki na ntango oyo bozali kolya, bozali mpe kobɛta masolo mpe kosɛka na baninga, kolya ezalaka kaka mpo na kosilisa nzala te, kasi ezalaka mpe ntango ya esengo. Mabota mingi bazalaka na momesano ya kolya esika moko ata mbala moko na mokolo. Ntango bafandi na mesa, babɛtaka masolo ya makambo oyo bakutanaka na yango to oyo bazali kokana kosala. Baboti oyo bayokaka makambo oyo bana na bango bazali koloba bayebaka makanisi mpe bamposa na bango. Mokemoke, masolo wana esalisaka libota mobimba ezala na kimya, bálinganaka mpe bátyelanaka motema.

Lelo oyo, ezali mpasi mpo libota mobimba ekutana mpo na kolya esika moko mpamba te moto na moto azalaka na programɛ na ye. Na bikólo mosusu, bamonaka mabe ete libota mobimba bályaka esika moko to babɛtaka masolo ntango bazali kolya. Na mabota mosusu, bazalaka na momesano ya kotala televizyo ntango bazali kolya, mpe babungisaka ntango oyo bakoki kosolola masolo ya kolendisa.

Nzokande, Biblia esɛngi na baklisto oyo bazali na bana balekisaka te mabaku ya kotonga mabota na bango. (Masese 24:27) Kala, Moize ayebisaká baboti ete ntango eleki malamu oyo bakoki koteya bana na bango liloba ya Nzambe ezali ‘ntango bafandi na ndako na bango.’ (Deteronome 6:7) Kofanda esika moko na bana mpo na kolya, epesaka baboti libaku ya kosalisa bango bálinga Yehova mingi mpe mitinda na ye ya sembo. Soki osali makasi ya kozala moto ya mindɔndɔ te, ntango ya kolya ekozala ntango ya kosolola masolo ya kolendisa oyo ekoki komemela libota na yo matomba na elimo. Yango wana, bósalaka mpe makambo mosusu ya ntina na ntango ya kolya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto