Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Moklisto akoki kosala nini soki alɛmbi na makanisi mpe na elimo?
Tosengeli liboso koyeba malamu makambo oyo elɛmbisaka biso. Ekoki kozala malamu tótalela makambo oyo tomesaná kosala mpe biloko oyo tozali na yango, kolongola nyonso oyo ezali lokola kilo ezangi ntina. Tokoki komityela mikano na kotalela makoki na biso. Ezali na ntina mingi tóbatela elimo na biso elɛmba te, yango ezali kosɛnga tóbondelaka Nzambe mpe tómanyolaka na bizaleli na ye ya malamu mingi mpe na bilaka na ye.—15/8, nkasa 23-26.
• Mpo na nini Batatoli ya Yehova balobaka ete esengeli kotalela motángo 144 000 kaka ndenge ezali?
Nsima ya koyebisa ntoma Yoane makambo etali etuluku ya bato 144 000, amonaki etuluku mosusu, “ebele ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga.” (Emoniseli 7:4, 9) Soki motángo 144 000 ezalaki ya elilingi, boye bokeseni elingaki kozala te kati na bavɛrsɛ yango mibale. Yesu alobelaki bato oyo bakoyangela elongo na ye na Bokonzi ya likoló mpe abengaki bango “etonga moke.” (Luka 12:32)—1/9, lokasa 30.
• Mpo na nini Bayisalaele bakokaki kotɛkela mopaya nyama oyo ebimisami makila te?
Mopaya oyo azali koleka to oyo afandi na mboka, kasi akómi prozelite te azalaki kotosa Mibeko te. Yango wana, Bayisalaele bazwaki ndingisa ya kopesa to kotɛkela bango banyama ya ndenge wana. (Deteronome 14:21) Nzokande, prozelite azalaki kotosa Mibeko, mpe akokaki te kolya nyama ya ndenge wana. (Levitike 17:10)—15/9, lokasa 26.
• Mpo na nini baklisto basengeli kotya likebi na kotala ndenge bato bamekolaka biloko oyo Nzambe akelá?
Bato batalaka biloko oyo Nzambe akelá mpo na kosala biloko ya sika. Na ndakisa, Wilbur Wright ná leki na ye Orville bazwaki mayele ya kosala aviɔ nsima ya kotala ndenge bandɛkɛ minene epumbwaka. Makambo ya ndenge wana ekoki kotinda moklisto apesa Nzambe nkembo.—1/10, lokasa 9.
• Moto oyo balobeli na 2 Bakolinti 12:2-4 ete amemamaki tii na kati ya paladiso ezalaki nani?
Paulo alobelaki likambo yango nsima ya kolobela makambo oyo ezali kondimisa ete azalaki ntoma. Lokola Biblia elobeli moto mosusu te oyo amonaki likambo wana, mpe lokola Paulo nde ayebisi biso yango, emonani mpenza ete ye moko Paulo nde amonaki emonaneli wana ya paladiso ya elimo.—15/10, lokasa 8.
• Wapi mwa bizaleli Yesu azalaki na yango oyo ezali komonisa ete ye nde Mokonzi oyo Nzambe aponi?
Yesu atikalaki sembo na makambo nyonso; azalaki na etamboli ya sembo. Yesu amipesaki mobimba na Nzambe. Azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bato mpe azalaki kokakatana te kosala mosala.—1/11, nkasa 6-7.
• Bademo bakozala wapi na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto?
Tokoki mpenza kokanisa ete na boumeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, bakobwakama na lobwaku mozindo elongo na Satana. (Emoniseli 20:1-3) Genese 3:15 esakolaki ete bakosasa nyoka na motó, oyo emonisi mpe ete bakobwaka ye na lobwaku mozindo na boumeli ya Mbula Nkóto. Baanzelu ya mabe, to bademo bazali na kati ya momboto ya Satana. Lokola bazalaki na nsɔmɔ ya lobwaku mozindo, emonisi ete bango moko bayebi ete bakobwakama na lobwaku yango na mikolo ezali koya. (Luka 8:31)—15/11, nkasa 30-31.
• Mpo na nini moklisto asengeli kozala na bokɛngi na likambo ya komɛla masanga, ata soki akebaka ete alangwa te?
Bato mosusu balangwaka mpenza te, ata soki bamɛli mingi. Kasi, mokemoke, moto akoki kobanda komiyoka malamu te soki amɛli te mpe akokóma ‘moombo ya ebele ya vinyo.’ (Tito 2:3) Yesu alobaki ete ‘tókeba ete mitema na biso ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi.’ (Luka 21:34, 35) Esɛngaka kaka te moto amɛla tii akolangwa mpo abanda koyoka mpɔngi mpe akóma gɔigɔi, ezala na nzoto to na elimo.—1/12, nkasa 19-21.