Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/12 lok. 32
  • ‘Nazali na esengo mpo na formasyo oyo nazwaki’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Nazali na esengo mpo na formasyo oyo nazwaki’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/12 lok. 32

‘Nazali na esengo mpo na formasyo oyo nazwaki’

ELENGE moko na nkombo Kazuna akamwaki ntango molakisi na ye ayebisaki ye apesa nkombo mpo na momekano moko ya kosala lisolo na Lingelesi. Momekano yango esalemaka mpo na biteyelo nyonso ya ntei ya Hokkaido, esanga monene ya nɔrdi ya Japon; kasi eteyelo na bango etindá naino mwana ata mbala moko te. Mokolo oyo basalaki momekano yango, Kazuna azalaki motema likoló mpamba te asengelaki kowelana na bana-kelasi mosusu 50. Abangaki lisusu makasi ntango amonaki bato mibale oyo basengelaki kopesa bango bapwɛ, oyo monɔkɔ ya mboka na bango ezali Lingelesi.

Na ntango ya kobenga bana-kelasi oyo balongi, babandaki naino na oyo azwaki mbano ya moke. Na nsuka, ntango babengaki nkombo Kazuna ete azwi esika ya liboso, atikalaki monɔkɔ polele. Ye ná molakisi na ye, oyo afandaki pembeni na ye, batalanaki mpe bakamwaki. Kazuna azalaki kaka kokamwa ntango akendaki na estrade mpo na kozwa mbano na ye.

Na esengo nyonso, Kazuna alobaki boye: “Eloko esalisi ngai nalonga ezali formasyo oyo ebongiseli ya Yehova epesaka ngai na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Nazali mpenza na esengo ndenge nazwaki formasyo yango.” Eteyelo ya mosala ya Teokrasi oyo Kazuna alandaka banda bomwana, ezali moko ya makita oyo esalemaka na masangá ya Batatoli ya Yehova. Ntango azalaki komibongisa mpo na momekano wana, Kazuna ayekolaki ndenge malamu ya koloba na mikro, ya koloba na esengo, kosala bajɛstɛ, kotala bato, mpe makambo mosusu oyo balakisaka na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.

Tozali kolendisa yo okende kotala likita yango, oyo esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na kartye na bino. Yo moko okomona ndenge eteyelo yango ezali kosalisa bilenge mpe mikóló. Moto nyonso oyo asepeli akoki koyangana na likita yango. Soki olingi koyeba makambo mosusu mpo na eteyelo oyo esalemaka pene na esika oyo ofandaka, tuná Batatoli ya Yehova na kartye na bino.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto