Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/12 lok. 30
  • Libongoli moko ya “malamu mingi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libongoli moko ya “malamu mingi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/12 lok. 30

Libongoli moko ya “malamu mingi”

LAPOLO moko emonisaki ete kobanda 1952 tii 1990, babimisaki mabongoli 55 ya Makomami ya Grɛki ya boklisto na Lingelesi. Maloba oyo mobongoli na mobongoli aponaki kosalela esali ete ata mabongoli mibale te ezalaki na maloba ndenge moko. Mpo na koyeba soki babongoli basalelaki maloba oyo ebongi, Jason BeDuhn, profesɛrɛ ya makambo ya losambo na iniversite ya Arizona, na engumba Flagstaff, na États-Unis, atalelaki mpe akokanisaki mabongoli mwambe oyo eyebani mingi, mpe moko na yango ezalaki Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova. Amonaki nini?

Atako andimaki te maloba mosusu oyo esalelami na libongoli yango, BeDuhn alobaki ete Libongoli ya Mokili ya Sika ezali libongoli moko ya “malamu mingi,” mpe alobaki ete na kati ya mabongoli wana nyonso, yango ezali libongoli “oyo eleki malamu” mpe “oyo maloba na yango ezali mpenza na boyokani.” BeDuhn alobaki ete na mobimba, Libongoli ya Mokili ya Sika “ezali moko na mabongoli ya Testama ya Sika oyo ezali mpenza sikisiki na mabongoli nyonso oyo ezali na Lingelesi na mikolo na biso” mpe “libongoli oyo eleki bosikisiki na mabongoli nyonso oyo atalelaki.”​—Buku Truth in Translation: Accuracy and Bias in English Translations of the New Testament.

BeDuhn amonaki mpe ete bazalaki kosɛngisa babongoli mingi na makasi ete “bálimbola makambo oyo Biblia elobi to bábakisa makambo mosusu na ndenge oyo batángi ya mikolo na biso bakosepela mpe bakolinga ete elobama bongo.” Nzokande, BeDuhn amonaki ete Libongoli ya Mokili ya Sika ekeseni mpo “ebongolami na bosikisiki mpenza na kolanda liloba mokomoko mpe kobatela kaka makanisi oyo bakomi ya Testama ya Sika basalelaki.”

Ndenge komite ya bobongoli Biblia ya Mokili ya Sika emonisi yango na maloba ya ebandeli ya mokanda yango, kozwa Makomami Mosantu na minɔkɔ oyo bakomaki yango na ebandeli mpe kobongola yango na elobeli ya mikolo oyo ezali “mokumba monene.” Komite yango elobi lisusu boye: “Babongoli ya buku oyo, bato oyo babangaka mpe balingaka Nzambe, Mobandisi ya Makomami Mosantu, bamonaka ete bazali na mokumba monene liboso na Ye ya kobongola makanisi mpe maloba na ye na bosikisiki mpenza.”

Banda Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ebimaki mpo na mbala ya liboso na 1961, esili kobimisama na minɔkɔ 32 mpe na minɔkɔ 2 na ekomeli ya bato bakufá miso (braille). Makomami ya Grɛki ya boklisto, to “Kondimana ya Sika” ya Libongoli ya Mokili ya Sika ebimisami mpe na minɔkɔ mosusu 18 mpe na monɔkɔ moko ezali na ekomeli ya bato bakufá miso. Tozali kolendisa yo otánga Liloba ya Nzambe na libongoli wana oyo ezali na elobeli ya mikolo mpe “ya malamu mingi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto