Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/12 lok. 32
  • Toli ya Salomo mpo na kopona mikanda ya kotánga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Toli ya Salomo mpo na kopona mikanda ya kotánga
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/12 lok. 32

Toli ya Salomo mpo na kopona mikanda ya kotánga

“KOKOMA minkanda mingi ezali na nsuka te, mpe koyekola mingi ekolembisa nzoto.” (Mosakoli 12:12, Liloba lya Nzambe) Maloba yango oyo Salomo, mokonzi ya Yisalaele oyo azalaki na bwanya mingi, akomaki eleki sikoyo mbula soki 3 000, emonisi te ete apekisaki kotánga. Kasi, alingaki nde koloba ete tosengeli koponaka mikanda ya kotánga. Toli yango ebongi mpenza lelo oyo mpamba te bamilio ya mikanda ezali kobima mbula na mbula!

Emonani polele ete oyo Salomo abengaki “minkanda mingi,” ezali mikanda oyo elendisaka te. Yango wana alobaki ete soki moto amipesi na yango, na esika ememela ye matomba oyo ekoumela, ‘ekolɛmbisa ye nzoto.’

Kasi, Salomo alingaki nde koloba ete ezali na mikanda te oyo ekoki kolakisa moto nzela ya malamu? Te, mpo akomaki mpe boye: “Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola mangenda, mpe baoyo bayanganisaka makanisi ya bwanya bazali lokola bansɛtɛ epikami makasi; nyonso euti na mobateli se moko.” (Mosakoli 12:11, NW) Ya solo, mikanda mosusu ezalaka “lokola mangenda,” elingi koloba ekoki kopesa makanisi ya malamu. Ekoki kolendisa moto alanda nzela ya malamu. Lisusu, mikanda ya ndenge wana ekoki kosalisa moto akangama makasi na ekateli oyo azwi mpe atɛlɛma ngwi “lokola bansɛtɛ epikami makasi.”

Epai wapi tokoki kozwa maloba ya bwanya motindo wana? Ndenge Salomo alobaki, maloba oyo eleki na bwanya ezali oyo euti epai ya Mobateli se moko, Yehova. (Nzembo 23:1) Yango wana, mokanda eleki malamu oyo ekoki kolakisa moto maloba ya bwanya ezali oyo epemami na Nzambe: Biblia. Soki moto azali kotánga mokolo na mokolo maloba yango oyo epemami, ekoki kosalisa ye akóma “moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”​—2 Timote 3:16, 17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto