Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/11 lok. 32
  • Ozali na mposa ya mokili oyo ezangi kobanga?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali na mposa ya mokili oyo ezangi kobanga?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/11 lok. 32

Ozali na mposa ya mokili oyo ezangi kobanga?

“Tozali ntango nyonso ‘mitema likoló mpe . . . kobangabanga mpo na likama’ moko oyo tozali ‘koyeba te epai ekouta . . . oyo ekoki koyela biso mbalakaka.’”

MALOBA yango, oyo ekomamaki na zulunalo Newsweek na mbula eleki, ezali komonisa mpenza makanisi ya bato mingi na mokili oyo etondi na yikiyiki. Yesu Klisto amonisaki ete motema likoló mpe kobanga ekókoma lisusu makasi na mikolo ezali koya. Asakolaki ete ekozala na ntango moko oyo bikólo ekozala na bwale mingi na boye ete bato bakoyeba likambo ya kosala te mpe bakolɛmba nzoto mpo na kobanga mpe kozela makambo oyo ekoya na mabelé. Kasi, biso tosengeli kobanga to kozala motema likoló te, mpamba te Yesu abakisaki boye: “Ntango makambo wana ekobanda kobima, bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpamba te kosikolama na bino ekómi pene.”​—Luka 21:25-28.

Yehova Nzambe amonisaki bomoi oyo bato bakozala na yango awa na mabelé nsima ya kosikolama wana na maloba oyo: “Bato na ngai bakofanda na efandelo ya kimya na bifandelo ya solo mpe na ndako ya bolɔzi te.” (Yisaya 32:18) Na nzela ya mosakoli Mika, Yehova alobaki boye: “Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse [ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, NW], moto moko akobangisa bango te.”​—Mika 4:4.

Bomoi ekokesana mpenza na ndenge ezali lelo oyo! Bato bakobanga lisusu te likama oyo bayebi te soki ekouta wapi. Na esika ya kozala ntango nyonso mitema likoló mpe kobangabanga, bato bakozala nde na kimya mpe na esengo libela na libela.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto