Mposa ya kozala na biloko mingi
“Soki tozali ntango nyonso na mposa ya kozala na biloko mingi, tokotonda yango ata mokolo moko te.”—Lapolo ya Worldwatch Institute.
“TOZALI na mposa ya nini? Ya biloko nyonso. Tokolinga kozwa yango ntango nini? Sika sikoyo.” Na bambula ya 1960, bana-kelasi mosusu ya biteyelo ya minene bazalaki koloba maloba wana mingi. Lelo oyo, ekoki kozala ete bato balobaka lisusu bongo te, kasi maka- nisi ya bato mingi ezali kaka ndenge wana. Ezali komonana mpenza ete bato ya ntango na biso bazali ntango nyonso na mposa ya kozala na biloko mingi.
Mpo na bato mingi, kozala na mbongo mpe biloko mingi ezali likambo eleki ntina na bomoi. Jimmy Carter, prezida ya kala ya États-Unis, alobaki mokolo mosusu boye: “Lelo oyo, batalelaka lisusu moto te na makambo oyo azali kosala, kasi nde na bozwi na ye.” Ezali nde na makambo mosusu oyo ezali na ntina koleka bozwi ya mokili oyo? Soki ezali, ezali makambo nini, mpe bolamu nini makambo yango ekoki komemela moto?