Ezali lisano mpamba te
BANA balingaka kosakana. Buku Bokoli ya mwana (na Lingelesi) elobi boye: “Yango ezali te likambo ya mpamba to oyo ezangi ntina. Kutu yango nde ekolisaka mayele.” Ntango bana bazali kosakana, bayekolaka kosalela miso, matoi, mpe bongo na bongo, kokanga ntina ya makambo oyo bazali komona, mpe koyeba kofanda na bato.
Ntango bana ya mbula minei to mitano bazali kosakana, bamekolaka makambo oyo mikóló basalaka. Mokolo mosusu Yesu alobelaki bana oyo bazali kosakana. Bana mosusu basepelaki kosala lisano ya “fɛti ya libala,” bamosusu “molulu ya kokunda ebembe” mpe, ndenge kaka bana nyonso basalaka, bazalaki kowelana na baninga na bango mpo baboyaki kosakana na bango. (Matai 11:16, 17) Masano ya ndenge wana etikalaka na motó ya mwana.
Bana oyo bazali na bafɔtɔ oyo bazali kosala lisano ya koyekola Biblia—mosusu azali moteyi, mosusu azali moyekoli. Yango ezali mpenza boyekoli ya solo te, kasi likanisi ya koyebisa bato nsango ya Biblia ezali mpenza na kati ya bɔɔngɔ na bango. Likambo wana ezali na ntina mingi, mpo Yesu atindaki bayekoli na ye nyonso bákómisa bato bayekoli mpe báteya bango kotosa makambo nyonso oyo alakisaki bango.—Matai 28:19, 20.
Baboti oyo bana na bango balingaka lisano ya koyekola na bato Biblia, kosala masukulu, to kosakola ndako na ndako basengeli mpenza kozala na esengo. Mbala mingi, bana bamekolaka makambo oyo bazali komona epai ya mikóló. Masano ya makambo ya Biblia oyo basalaka emonisaka ete bazali kobɔkɔlama “na mateya pe batoli ya Nkolo.”—Baefese 6:4, Bible na lingala ya lelo oyo.
Yehova alingi ete bana mpe bámipesa na losambo ya solo. Ayebisaki Moize ete “bana” mpe bázalaka ntango Mibeko ezali kotángama. (Deteronome 31:12) Soki bana bamoni ete basengeli mpe komipesa na losambo ya solo, ekomonana mpe na masano na bango. Soki na masano mwana alingaka kozala ministre ya Nzambe, yango emonisi ete abandi mokemoke kolanda nzela oyo ekomema ye tii na kokóma ministre ya Nzambe.