Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/9 lok. 32
  • Ndenge ya kolonga kolɛmba nzoto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolonga kolɛmba nzoto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/9 lok. 32

Ndenge ya kolonga kolɛmba nzoto

EZALI nde na likambo moko oyo elɛmbisi yo nzoto? Na ntango oyo ya mikakatano mpe ya yikiyiki, bato mingi balɛmbi nzoto. Bamosusu balɛmbi nzoto mpo bazali na misala te, bamosusu bazali kobunda na mikakatano ya likama moko oyo euti kokómela bango. Ezali mpe na baoyo bazali kobunda na mikakatano na kati ya libota, na maladi makasi to bazangá bandeko to baninga.

Soki olɛmbi nzoto, epai wapi okoki kozwa lisalisi? Bamilio ya bato na mokili mobimba babɔndisamaka ntango bazali kotánga Biblia, Liloba ya Nzambe. Maloba oyo ya ntoma Paulo ekitisaka mpenza mitema na bango: “Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto apambolama, Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” (2 Bakolinti 1:3, 4) Ekozala malamu otánga bavɛrsɛ oyo mpe bavɛrsɛ mosusu na Biblia na yo moko. Soki osali yango, ‘ekobɔndisa motema na yo mpe ekopesa yo makasi.’​—2 Batesaloniki 2:17.

Okoki mpe kozwa lisalisi mpo na kolonga kolɛmba nzoto soki ozali kosangana na bato oyo basalelaka Yehova. Masese 12:25 elobi ete: “Bozito na motema ya moto ekokitisa yango, nde liloba malamu ekosepelisa yango.” Ntango toyanganaka na makita ya boklisto, toyokaka “liloba malamu” oyo ezali “elɛngi epai na molimo mpe na kobika kati na mikuwa.” (Masese 16:24) Tolendisi yo okɔta na likita moko na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova mpo omona yo moko ndenge mayangani yango ekoki kolendisa yo.

Okoki mpe kozwa lisalisi na nzela ya libondeli. Soki mitungisi ya bomoi elekeli yo, yebisá ‘ye oyo ayokaka mabondeli.’ (Nzembo 65:2) Mozalisi na biso Yehova Nzambe ayebi biso malamu koleka biso moko. Tokoki kotya motema ete akosalisa biso. Liloba na ye elaki biso boye: “Kitisá mokumba na yo epai ya [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.” (Nzembo 55:22) Ya solo, ‘baoyo bakozela Yehova, bakozwa nguya ya sika.’​—Yisaya 40:31.

Yehova Nzambe apesi biso lisalisi nyonso oyo ekoki mpo tólonga kolɛmba nzoto. Okosalela yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto