Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/8 lok. 32
  • “Yango nde likambo eleki malamu oyo okoki kosala”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Yango nde likambo eleki malamu oyo okoki kosala”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/8 lok. 32

“Yango nde likambo eleki malamu oyo okoki kosala”

ALEXIS azali mwana ya mbula 5 oyo afandaka na engumba Morelia, na Mexique; baboti na ye bayekolaka Biblia mpe bayanganaka na makita ya Batatoli ya Yehova. Ntango akendaki na baboti na ye na liyangani moko ya zongazonga, alandaki elakiseli moko oyo emonisaki ndenge ya kosakola ndako na ndako. Mbala moko atalaki tata na ye mpe atunaki, “Papa, Papa, mpo na nini obimaka na mosala ya kosakola te?” Tata na ye ayanolaki: “Nazali naino koyekola mpo nayeba mpe kosakola.” Na esengo nyonso Alexis alobaki: “Papa, yango nde likambo eleki malamu oyo okoki kosala.”

Mwana wana ya moke amonaki ete esengeli asalela makambo oyo azali koyekola na ntina na Yehova. Lokola bafandaka ndako moko na bana ya ndeko ya mama na ye, nsima ya kobondela Yehova abandaki koyebisa bango makambo oyo baboti na ye bayekolisaki ye na Mokanda mpo na Masolo ya Biblia. Atako Alexis ayebaki naino kotánga te, ayebaki malamu mpenza masolo ya buku yango na nzela ya bililingi na yango. Kutu, alobaki ete azali na mposa akendeke kotala bato na bandako na bango mpo na koyebisa bango makambo oyo azali koyekola na ntina na mikano ya Nzambe.

Ya solo, bato nyonso, bilenge mpe mikóló, bakoki kosala makambo oyo Yehova, “Oyo Mosantu,” azali kosɛnga bango mpe na bongo kozwa libaku malamu mingi ya kotatola mpo na ye na bikólo nyonso. (Yisaya 43:3, NW; Matai 21:16) Ya solo mpenza, wana ezali moko ya makambo eleki malamu oyo moto akoki kosala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto