Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/8 lok. 32
  • “Tolingi ete mokolo yango tóndima, ‘Ɛɛ!’ ”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tolingi ete mokolo yango tóndima, ‘Ɛɛ!’ ”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/8 lok. 32

“Tolingi ete mokolo yango tóndima, ‘Ɛɛ!’”

NA FILIALE ya Batatoli ya Yehova na Nigeria, bautaki kozwa mokanda moko oyo, na eteni na yango moko, elobaki boye:

“Mwana na biso Anderson akufaki ntango azalaki na mbula 14. Liboso akufa, azalaki kobɔkɔla nsoso mibale. Azalaki na mposa ya kotɛka bansoso yango mpo atinda likabo na ye na Betele mpo básalela yango na mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba. Kasi akufaki liboso atɛka bansoso yango.

“Lokola toyebaki mposa na ye, biso baboti na ye tobɔkɔlaki bansoso yango mpe totɛkaki yango. Totindeli bino mbongo yango lokola likabo ya Anderson. Tozali mpenza kondima elaka ya Yehova ete, mosika te, tokomona lisusu Anderson. Tolingi ete mokolo yango tóndima, ‘Ɛɛ!,’ soki atuni biso soki tokokisaki mposa na ye. Kutu, tozali kozela komona kaka Anderson te, kasi mpe ‘lipata monene ya batatoli’ oyo bakosekwa.”​—Baebele 12:1; Yoane 5:28, 29.

Lokola emonisami polele na mokanda yango, elikya ya lisekwa ezali mpenza kolendisa baklisto ya solo. Oyo nde esengo ebele ya mabota, lokola oyo ya Anderson, bakoyoka ntango bakomona lisusu bandeko na bango oyo bakufá!​—1 Bakolinti 15:​24-26.

Liloba ya Nzambe ezali komonisa ete lisekwa ezali moko ya makambo ya malamu mpenza oyo ekosalema na mokili ya sika mpe ya sembo oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. (2 Petelo 3:13) Biblia elobi boye mpo na makambo oyo Nzambe akosalela bato na ntango yango: “Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”​—Emoniseli 21:4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto