Tosengeli kaka koboya kosala mabe to tosengeli nde kosalaka malamu?
“OYO olingi básala yo te, kosala mpe moninga te.” Balobaka ete maloba yango ezali ya Confucius, moto ya Chine oyo azalaki moteyi mpe filozofe monene. Lelo oyo, mbula soki 2 500 na nsima, bato mingi bazali naino kondima ete, moto malamu ezali moto oyo aboyaka kosala bato mosusu mabe.
Na ntembe te, toli wana ya Confucius ezali mpenza mabe te. Kasi, Biblia emonisi likambo mosusu ya malamu koleka oyo bato basengeli komonisaka na ezaleli na bango mpe na boyokani na bazalani na bango. Yango wana, longola kosala mabe, Biblia elobi ete koboya kosala malamu ezali mpe lisumu. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Soki moto ayebi kosala oyo ezali malamu kasi azali kosala yango te, ezali lisumu epai na ye.” (Yakobo 4:17) Yesu Klisto asukaki kaka te na kopekisa baklisto kosala mabe, kasi apesaki nde toli oyo: “Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.”—Matai 7:12.
Na ebandeli, mokano ya Nzambe ezalaki ete bato básalelaka baninga na bango kaka makambo oyo bakolinga ete baninga yango mpe básalelaka bango. Apesaki ndakisa ya malamu mpenza na likambo ya koluka bolamu ya basusu na lolenge oyo akelaki moto: “Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali mpe mwasi.” (Genese 1:27) Yango emonisi ete Nzambe, na bolingo na ye, apesaki bato lisosoli oyo, soki eteyami malamu, ekosalisa bango básalela bazalani na bango makambo oyo bango moko bakolinga básalela bango.
Lelo oyo, bato ya mitema mabe mpe oyo balukaka kaka matomba na bango bazali mpenza konyokola ebele ya bato mpe banyokwami yango bazali ata na elikya moko te. Ya solo, esengeli kaka te koboya kosalela bato mosusu mabe to makambo oyo ekoki koyokisa bango mpasi, kasi esengeli mpe kosalela bango oyo ezali malamu mpe oyo ekoki kosalisa bango. Yango wana, Batatoli ya Yehova, na bolingo na bango moko, bazali komipesa na kosalisa bato báyeba elikya kitoko oyo Liloba ya Nzambe ezali kopesa. Ntango bakendeke kosakola nsango malamu ya Biblia epai ya bazalani na bango, basalaka yango na bolingo, basalelaka baninga makambo oyo bakolinga ete bato mosusu mpe básalela bango.