Kitoko ya biloko oyo Yehova akelá
“Tiká ete bibale bibɛta mabɔkɔ”
SOKI totali karte ya mokili, na bisika mingi tomonaka banzela ekatisikatisi mikili lokola misisa na nzoto ya moto. Banzelanzela yango ekatisá bitando patatalu, mikili ekauká mpe bisobe. Elekaleká na mabwaku, ata mpe na bazamba. (Habakuku 3:9) Banzelanzela yango ezali bibale, oyo ezali na ntina mingi mpo na bomoi awa na mabelé. Bibale yango ezali komonisa bwanya mpe nguya ya Yehova, Mozalisi ya mabelé. Ntango tozali kotala yango, toyokaka lokola mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Tiká ete bibale bibɛta mabɔkɔ, ngomba mpe básepelana elongo, liboso ya [Yehova].”—Nzembo 98:8, 9.a
Na esika oyo balobeli bomoi ya bato, banda kaka na bato ya liboso, bazangaka kolobela bibale te. Biblia elobeli ebale moko oyo ezalaki kouta na Edene mpe ekabwanaki na minei. (Genese 2:10-14) Moko na bikólo ya libosoliboso ebandaki na mabwaku ya Ebale Tigre ná Ebale Efalata na Proche-Orient, oyo ezalaki na mabelé malamu mpenza. Ebale Huang He, na Chine, Ebale Gange ná Ebale Indus, na sudi ya Azia, mpe Ebale Nil, na Ezipito, nyonso wana esalisaki bato ya kala na kotonga bikólo ya minene mpe ya makasi.
Yango wana, tokoki kokamwa te ete bato batikalaka ntango nyonso minɔkɔ polele liboso ya nguya, bonene mpe kitoko ya bibale. Ebale Nil na Ezipito ezali na bolai ya kilomɛtrɛ soki 6 670. Ebale Amazone na Amerika ya Sudi ezali ebale oyo eleki monene na mokili mobimba. Bibale mosusu ezali monene mpenza, nzokande mosusu atako ezali moke, ezalaka kitoko mingi, na ndakisa Ebale Tone na Japon, oyo mai na yango etiyolaka mbangu.
Nini esalaka ete mai ya bibale etiyola? Ezali nguya oyo babengi pesanteur. Nguya yango nde esalaka ete mai elongwaka na bangomba mpe ekitaka tii na mabwaku. Na bisika mosusu, mai eutaka na likoló mpenza mpe ekweaka na makɛlɛlɛ makasi; yango nde babengaka bweta. Biblia elobeli nguya mpe bonene ya bibale na maloba oyo: “Ɛ [Yehova], bibale bitomboli mingongo na bango, bibale bitomboli miula na bango na makɛlɛlɛ.”—Nzembo 93:3.
Yehova atunaki Yobo, moto oyo azalaki kobanga Nzambe boye: “Nani moto apasolaki banzela na Likolo, oyo mai ya mbula . . . elekelaka?” (Yobo 38:25, Bible na Lingala ya lelo oyo) Mai nyonso eutaka mpenza wapi? Mpo na kozwa eyano, esengeli koyeba nzela molai oyo mai alandaka. Molunge ya moi mpe nguya ya mabelé ya kobenda biloko esalaka ete mai ebongwanaka kozanga nsuka. Molunge ebongolaka mai londende, mpe londende yango emataka likoló. Na nsima, londende yango ekómaka mpiɔ mpe esalaka mapata. Nsukansuka, ekitaka lisusu na mabelé na lolenge ya mbula-mpɛmbɛ to mbula. Mai mingi ekendaka na mbu, na balaki, na bibale, to ekómaka ngalasi na mikili ya malili makasi mpe mosusu ekitaka na nse ya mabelé.
Biblia elobeli nzela yango ya mai na maloba oyo: “Bibale nyonso ekotiyola kino mai-ya-monana; kasi mai-ya-monana ekotonda te. Na esika eutaki bibale, bikozongaka bobele wana lisusu.” (Mosakoli 1:7) Kaka Yehova, Nzambe ya bwanya oyo ezangi nsuka mpe atondi na bolingo nde akokaki kosala ebongiseli wana ya mai. Mosala wana ya mayele ezali koteya biso nini mpo na Nzambe? Azali na bwanya mingi, na bolingo mpe amibanzabanzaka mpo na biso.—Nzembo 104:13-15, 24, 25; Masese 3:19, 20.
Atako bibale ezali minene mpe ebele, ezali na mai mingi te oyo bato bakoki komɛla. Atako bongo, mai na yango ezali na ntina mingi mpo na bomoi. Buku Water (Mai) elobi boye: “Soki bato bazangi mai to soki bazali na bibale na bango moko te, bakoki te kokokisa bamposa na bango, ata bamposa ya mike. Lisolo ya bato banda mokili ebandá ezali komonisa ete bato balukaka kozala na mai mpe na bibale na bango moko.”
Banda kalakala, bato bamɛlaka mai ya bibale mpe basalelaka yango mpo na bilanga. Pembenipembeni ya bibale, mabelé mingi ezalaka malamu mpenza mpo na bilanga. Talá ndenge likanisi yango emonani na lipamboli moko oyo Yehova alakaki basaleli na ye: “[Bahema] na yo ezali kitoko, ee Yakobo, mpe milako na yo, ɛ Yisalaele, lokola mabwaku mabendami mosika, lokola bilanga pembeni ya mongala, lokola nzete ya aloe esili [Yehova] kokona, lokola nzete ya eleze na pembeni ya mai.” (Mituya 24:5, 6) Bibale esimbi mpe bomoi ya banyama lokola mabata mpe bambwa ya zamba oyo ozali komona na elilingi oyo. Na yango, ntango tozali koyeba makambo mingi na ntina ya bibale, boyebi yango ekotinda biso tótɔnda Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2004, mai-juin.
[Etanda/Elilingi na lokasa 8]
Bweta ya Iguaçú, na ndelo ya Argentine ná Brésil, ezali moko ya baboeta oyo eleki minene na mokili. Ezali na bonene koleka kilomɛtrɛ misato. Ezali na kati mpenza ya zamba monene mpe esangisi babweta ya mike soki 300. Na eleko ya mbula, ebwakaka mɛtrɛ-kibe soki nkóto 13 ya mai na sɛgɔnde moko.
[Elilingi na lokasa 9]
Ebale Tone, na Japon