Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/4 lok. 32
  • Biblia esalisaki ye alonga komekama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia esalisaki ye alonga komekama
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/4 lok. 32

Biblia esalisaki ye alonga komekama

Komekama ezali mingi na mokili lelo oyo. Kotosa mibeko ya Biblia ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Na ndakisa, ntango mosusu ekoki kozala mpasi kotosa toli ya Biblia oyo: “Bókima pite.”​—1 Bakolinti 6:18.

Na ekólo Pologne, Motatoli ya Yehova moko, oyo topesi ye nkombo Sébastien, azalaki kosala na kompanyi moko ya bato ya Scandinavie. Esengelaki na ye kobunda etumba mpo na kotikala sembo.

Baninga ya Sébastien ya mosala bayebaki ete azali Motatoli ya Yehova. Lokola bakonzi na ye ya mosala bazalaki kosepela mingi na makasi na ye na kosala mpe na bosembo na ye, bazalaki kopesa ye mikumba mingi. Kasi, emonanaki ete mikumba yango ebandaki kosɛnga ye azalaka na makita ya mosala epai bazalaki kosala masano ya mabe.

Sébastien akómaki komituna mituna. “Patrɔ na ngai ayebi ete ngai nazali Motatoli ya Yehova. Yango wana asepelaka na ngai mpe atyelaka ngai motema. Soki naboyi makita yango, nakolongwa na mosala, nzokande ezalaki mpasi mpo nazwa yango. Ezali boni soki nakei kasi nazali kotala kaka na miso?”

Na nsima, Sébastien ayebaki mposa na bango malamu. “Asengelaki koyokana na basi ya ndumba mpo bakiliya na bango oyo bazalaki bapaya bábimaka na bango na mpokwa.” Esengelaki asala nini?

Sébastien azwaki mokano ya koyebisa patrɔ na ye ndenge atalelaka pite na kolanda mitinda ya Biblia. Mosika te, Sébastien amonaki ete esika wana ebongi na ye te mpe nsukansuka asengeli kotika mosala yango. Azwaki mosala mosusu epai bazalaki kofuta ye mbongo moke, kasi ezalaki na komekama wana te. Sikoyo azali na lisosoli ya malamu.

Okosala nini soki moto moko azali kotinda yo na kosala pite to na kosalisa bato mosusu básala pite? Okondima kobongola mpenza makambo nyonso? Ndenge Biblia emonisi yango na Genese 39:7-12, ezali yango nde Yozefe asalaki.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto