Mokolo oyo tosengeli kokanisaka
NA MPOKWA liboso ya mokolo oyo Yesu Klisto akufaki, apesaki bayekoli na ye limpa ezangá levire mpe kɔpɔ ya vinyo ya motane mpe ayebisaki bango bálya mpe bámɛla. Alobaki na bango lisusu ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”—Luka 22:19.
Na mbula oyo, ekaniseli yango ekosalema mokolo ya lomingo 4 Aprili 2004 nsima ya kolala ya moi. Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bakoyangana na mpokwa yango mpo na kokanisa liwa ya Yesu na ndenge oyo asɛngaki esalemaka. Batatoli ya Yehova bazali kobenga yo na esengo mpenza osangana na bango mpo na kokanisa liwa ya Yesu. Tolendisi yo otuna Batatoli ya Yehova ya esika ofandi mpo na koyeba esika mpe ngonga oyo ekaniseli yango ekosalema.