Basaleli ya Nzambe bazali lokola banzete na ndenge nini?
MPO na moto oyo asepelaka na mitinda ya Biblia mpe asalelaka yango na bomoi na ye, mokomi ya nzembo akomaki boye: “Azali lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima ya mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokauka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.” (Nzembo 1:1-3) Mpo na nini elilingi yango ebongi mpenza?
Banzete eumelaka bambula ebele. Na ndakisa, balobaka ete banzete mosusu ya olive oyo ezali na mikili ya Méditerranée eumeli mbula nkóto moko to mpe nkóto mibale. Ndenge moko mpe, banzete ya baoba na Afrika ya Ntei eumelaka bambula ebele, mpe balobaka ete nzete moko babengi pin à cône épineux, oyo ezali na etúká ya Californie, na États-Unis ekokisi mbula soki 4 600. Na kati ya zamba, banzete ya minene ebatelaka banzete ya mikemike oyo ezali zingazinga na yango. Na ndakisa, banzete milai ebatelaka banzete ya mikemike na moi, mpe nkasa oyo yango ekweisaka ebongisaka mabelé.
Mbala mingi, banzete oyo eleki milai na mokili ekolaka esika moko na kati ya zamba mpe ebatelanaka mpo ekwea te. Lokola misisa ya nzete ekanganakanganaka na oyo ya banzete mosusu oyo ezali pembeni na yango, ebatelaka banzete yango ekwea te na ntango ya mipɛpɛ makasi koleka nzete oyo ezali yango moko na kati ya esobe. Nzete oyo ezali na misisa mingi ezwaka mai mpe bilei mingi na mabelé. Misisa ya banzete mosusu ekendaka mosika mpenza na nse ya mabelé koleka kutu bolai ya nzete yango moko, to mpe epalanganaka koleka kutu bitape ya nzete.
Ntango mosusu ntoma Paulo azalaki kokanisa nzete ntango alobaki ete baklisto basɛngeli ‘kokoba kotambola na bomoko elongo na ye [Klisto], kopika misisa mpe kotongama na kati na ye mpe kotɛlɛma ngwi na kati ya kondima.’ (Bakolose 2:6, 7) Ya solo, baklisto bakoki kotɛlɛma ngwi na kati ya kondima kaka soki bapiki misisa na bango na kati ya Klisto.—1 Petelo 2:21.
Na lolenge nini mosusu basaleli ya Nzambe bazali lokola banzete? Lokola banzete oyo ezali esika moko esalisanaka moko na mosusu mpo ekwea te, ndenge moko mpe bato oyo bakangami na lisangá ya boklisto balendisamaka na baninga na bango bandimi. (Bagalatia 6:2) Baklisto ya sembo oyo bakɔmeli mpe bapiká mpenza misisa na elimo, basalisaka bandimi ya sika bátɛlɛma ngwi na kati ya kondima, ata soki bakutani na botɛmɛli oyo ezali lokola mopɛpɛ makasi. (Baloma 1:11, 12) Baklisto ya sika bakoki kokola malamu na elimo soki basaleli ya Nzambe oyo bakɔmeli babateli bango ndenge banzete ya minene ebatelaka oyo ya mike. (Baloma 15:1) Lisusu, baklisto ya mokili mobimba bazali kolendisama na bilei ya elimo oyo euti epai ya ‘banzete makasi ya boyengebene,’ elingi koloba batikali bapakolami.—Yisaya 61:3
Ezali esengo monene koyeba ete basaleli nyonso ya Nzambe bazali na elikya ya komona kokokisama ya Yisaya 65:22 oyo elobi ete: “Lokola mikolo ya nzete, bongo ekozala mikolo ya bato na ngai.”
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 28]
Godo-Foto