Lisosoli ya sembo
MOKOLO moko Charles, mobali moko oyo asalaka na iniversite moko na Kenya, akweisaki telefone na ye ya mabɔkɔ na motuka oyo amataki ntango azalaki kouta na mosala. Na Kenya, telefone ezali eloko ya ntalo mpenza.
Charles alobaki boye: “Nandimaki te ete nakomona yango lisusu.” Kasi, nsima ya mwa mikolo, akamwaki mingi ntango babengaki ye na telefone na biro ya Batatoli ya Yehova. Ntango ayokaki ete bazali koluka ye mpo na kopesa ye telefone na ye, likambo yango elekelaki ye! Motatoli ya Yehova moko oyo bamataki na ye bisi moko nde alɔkɔtaki yango. Motatoli yango amemaki yango na biro ya Batatoli ya Yehova mpo básalisa ye na koluka nkolo na yango; Batatoli oyo basalaka kuna bazwaki nimero ya telefone ya Charles mpe babengaki ye.
Na mokanda oyo Charles akomelaki biro ya Batatoli ya Yehova, alobaki boye: “Nasepeli mingi na milende oyo bosali mpo na kobenga ngai atako yango ezalaki mpasi mpo na bino. Nazali kopesa mersi mingi na bato ya lingomba na bino oyo balɔkɔtaki telefone, basalaki nyonso mpo na koluka ngai mpe bazongiselaki ngai yango. Na moi ya lelo, ezali mpasi komona moto ya sembo, kasi ezali esengo na komona ete ezali na mwa bato oyo bazali mpenza Batatoli ya solosolo ya Yehova Nzambe.”
Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba ete bazalaka bato ya sembo. Balandaka ndakisa ya Paulo, oyo alobaki ete: “Tozali na lisosoli ya sembo, mpo tozali na mposa ya komitambwisa na bosembo na makambo nyonso.” (Baebele 13:18; 1 Bakolinti 11:1) Bayebaka ete ezaleli wana epesaka Yehova Nzambe nkembo, ndenge Yesu alobaki: “Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa nkembo epai ya Tata na bino oyo azali na likoló.”—Matai 5:16.