Mokili oyo ezangi mobulu ezali koya
KANISÁ mokili moko oyo ezangi bato ya mobulu! Ntina ya kozala na bapolisi, babolɔkɔ, to batribinale oyo Leta abimiselaka ebele ya mbongo ekozala te. Moto mokomoko azali komemya bomoi mpe biloko ya mozalani na ye. Okanisi ete ekoki kosalema te? Okoki kokanisa bongo; kasi, Biblia elaki mbongwana ya monene ndenge wana. Tozali kolendisa yo otánga makambo oyo Biblia elobi mpo na mobulu mpe makambo mosusu ya mabe oyo ezali kosalema na mokili.
Na mokanda ya Nzembo, totángi boye: “Omitungisa te mpo na bato ya masumu; yokelá basali na mabe zuwa te. Mpo ete bakolimwa mbango lokola matiti; bakokauka lokola matiti mobesu. Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:1, 2, 11) Moto moko te akoki kopekisa Nzambe kokokisa elaka yango mpe bilaka na ye mosusu oyo ezali mpenza kolendisa.
Nzambe akosalela Bokonzi na ye mpo na kopesa mapamboli yango. Na libondeli ya Nkolo, Yesu Klisto ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete Bokonzi yango eya mpe mokano ya Nzambe esalema “lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:9, 10) Etikali moke, moto moko te awa na mabelé oyo Bokonzi wana ekoyangela, akozala lisusu na mposa ya kosala mobulu mpo na bobola, konyokwama, to lokoso. Liloba ya Nzambe elobi nde ete: “Masango ekotondana na mokili ata kino likoló ya nkeka.” (Nzembo 72:16) Yehova Nzambe akopesa moto nyonso awa na mabelé ebele ya biloko ya kitoko. Mpe likambo eleki ntina ezali ete bato bakolinga Nzambe mpe bakolingana bango na bango mingi koleka, mpe mobulu ekobebisa lisusu mokili te.