Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/11 lok. 32
  • “Namoni boninga, bolingo, mpe kotyelana likebi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Namoni boninga, bolingo, mpe kotyelana likebi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/11 lok. 32

“Namoni boninga, bolingo, mpe kotyelana likebi”

“NA NDENGE wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Ndenge kaka Yesu alobaki, baklisto ya liboso bazalaki koyebana na bolingo na bango. Koleka mbula nkama nsima ya liwa ya Klisto, Tertullien akomaki maloba oyo bato bazalaki koloba mpo na baklisto ete: ‘Talá ndenge balingani mpe bandimaka ata kokufa mpo na bandeko na bango.’

Bolingo ya ndenge wana ekoki komonana na moi ya lelo? Ɛɛ. Na ndakisa, talá mokanda oyo batindaki na filiale ya Batatoli ya Yehova na Brésil. Mokanda yango eutaki epai ya mwasi moko nkombo na ye Marília, akomaki boye:

Ntango nazalaki kofanda na Villa Mercedes, na Argentine, mama na ngai, oyo azali Motatoli ya Yehova, abɛlaki maladi ya mikuwa (ostéoarthrite) oyo ekómisá ye paralize banda na loketo tii na nse. Na boumeli ya sanza mwambe ya liboso kobanda maladi yango ebandaki, Batatoli na Villa Mercedes bazalaki kobatela ye na bolingo mpenza. Bazalaki kosalela ye makambo nyonso, kokɔmbɔlela ye ndako mpe kolambela ye bilei. Ata ntango Mama azalaki na lopitalo, azalaki kozanga moto te, ezala na moi to na butu.

“Ngai ná Mama tozongá na Brésil mpe azali kobonga mokemoke. Na mboka oyo tofandi, Batatoli ya Yehova bazali kosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa Mama.”

Marília asukisi mokanda na ye na maloba oyo: “Ngai moko nazali Motatoli te, kasi namoni boninga, bolingo, mpe kotyelana likebi na kati ya Batatoli.”

Ya solo, ezali naino na bato oyo bazali komonisa bolingo ya boklisto ya solosolo. Na ndenge yango, bazali komonisa makambo oyo mateya ya Yesu ekoki kosala na bomoi na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto