Mituna ya batángi
Yehova alobelaki nani ntango alobaki “moko na biso” na Genese 3:22?
Emonani polele ete Yehova Nzambe azalaki kolobela ye moko ná Mwana na ye mobotami-se-moko ntango alobaki ete: “Moto akómi [lokola] moko na biso, koyeba malamu na mabe.” (Genese 3:22) Tótalela naino mpo na nini tolobi bongo.
Yehova alobaki bongo nsima ya kopesa mwasi ná mobali ya liboso etumbu. Bato mosusu balobaka ete Yehova alobaki maloba “moko na biso” na boike atako azalaki ye moko, se ndenge mokonzi moko akoki koloba ete “tosepeli te” na esika aloba ete nasepeli te. Kasi, Donald Gowan, molimboli moko ya maloba ya Biblia, alobi mpo na Genese 1:26 mpe 3:22 ete: “Ezali na likanisi moko te na [Kondimana ya Kala] oyo ezali kolongisa makanisi oyo bato mingi bapesaka ete: ezali ‘biso’ oyo mokonzi asalelaka . . . to oyo esalelamaka mpo na kolobela ebele ya bato oyo bazali na lolenge ya Nzambe. . . . Moko te kati na bandimbola yango eyokani mpenza na Genese 3:22, oyo elobi ete ‘moko na biso.’”
Ekoki nde kozala ete Yehova alobelaki Satana Zabolo, oyo akómaki kopona “malamu mpe mabe” na ndenge na ye moko mpe oyo abendaki bato ya liboso na kosala lokola ye? Ezali mpasi ezala bongo. Yehova alobaki ete “moko na biso.” Satana azalaki lisusu te na kati ya baanzelu ya sembo ya Yehova, yango wana akokaki te kotángama na kati ya baoyo bazalaki na ngámbo ya Yehova.
Nzambe azalaki nde koloba na baanzelu? Tokoki koloba yango na kondima nyonso te. Kasi, kokokana ya maloba ya Genese 1:26 ná 3:22 ezali kopesa biso mwa likanisi. Na Genese 1:26, tozali kotánga ete Yehova alobaki boye: “Tika tózalisa moto na lolenge na biso na elilingi na biso.” Nzambe alobaki bongo na nani? Ntoma Paulo alobelaki ekelamu yango ya elimo oyo na nsima akómaki moto ya kokoka, Yesu, na maloba oyo: “Ye azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, mwana ya liboso na bozalisi nyonso; mpamba te na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabelé.” (Bakolose 1:15, 16) Ya solo, emonani mpenza ete na Genese 1:26, Yehova azalaki koloba na Mwana na ye mobotami-se-moko, “mosali monene,” oyo azalaki pembeni na ye ntango azalaki kozalisa likoló ná mabelé. (Masese 8:22-31, NW) Bokokani oyo ezali kati na maloba yango ná maloba ya Genese 3:22 ezali kopesa likanisi ete Yehova azalaki koloba na moto oyo azalaki pembeni na ye mpenza, Mwana na ye mobotami-se-moko.
Emonani ete Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe ayebaki “malamu ná mabe.” Lokola aumelaki esika moko na Yehova mpe bamesanaki mingi, na ntembe te ayebaki makanisi, mitinda mpe mibeko ya Tata na ye malamu mpenza. Lokola Yehova ayebaki ete Mwana na ye ayebi makanisi, mitinda mpe mibeko yango malamu mpe ete atosaka yango na bosembo mpenza, ekoki kozala ete atikelaki ye bonsomi ya kosala makambo mosusu kozanga ete atunaka ye eloko na eloko oyo alingi kosala. Na ndenge yango Mwana azalaki na likoki ya koyeba oyo ezali malamu mpe mabe. Nzokande, na kokesana na Satana, Adama, ná Eva, Mwana ya Nzambe aponaki te kotalela mabe ná malamu na ndenge oyo ekeseni na oyo ya Yehova.