Lisolo oyo ezali kolendisa kondima mpe kopesa mpiko—Batatoli ya Yehova na ekólo Ukraine
SE NDENGE oyo baklisto ya ekeke ya liboso banyokwamaki, basaleli ya Nzambe na moi ya lelo bazali mpe konyokwama. (Matai 10:22; Yoane 15:20) Ezali na bisika mingi te oyo minyoko eumelaki mpe ezalaki makasi lokola na ekólo Ukraine, epai mosala ya kosakola Bokonzi epekisamaki na boumeli ya mbula 52.
Buku Annuaire des Témoins de Jéhovah 2002 elobelaki lisolo ya basaleli ya Nzambe na ekólo yango. Lisolo yango ezali komonisa kondima, mpiko, mpe nguya liboso ya minyoko makasi. Tozongeli maloba mosusu oyo bato oyo batángaki lisolo yango batindaki na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Ukraine:
“Nasilisi kotánga Annuaire 2002. Nakokaki kokanga motema te ntango nazalaki kotánga masolo ya mosala na bino na Ukraine; nazalaki mpenza kolela. Nalingi koyebisa bino ete molende mpe kondima makasi na bino elendisi ngai mingi. Nazali na esengo ya kozala na bino libota moko ya elimo. Nazali kotɔnda bino mpenza na motema mobimba!—Andrée, France.
“Nazangi maloba mpo na komonisa botɔndi na ngai epai na bino mpe epai ya Yehova mpo na Annuaire 2002. Ntango nazalaki kotánga masolo ya bandeko oyo balekisaki bolenge na bango na babolɔkɔ mpe na bakaa ya bakangami, mpisoli ezalaki kotanga ngai. Nazali kosepela na mpiko na bango. Atako eleki mbula 27 banda nazali Motatoli, nakoki mpe kozwa liteya na ndakisa ya bandeko mibali mpe basi wana. Balendisi kondima na ngai epai ya Tata na biso ya likoló, Yehova.—Vera, ex-Yougoslavie.
“Nazali na esengo ya kokomela bino mokanda oyo mpo bopesi ndakisa malamu na molende mpe bosembo na bino na boumeli ya ebele ya bambula wana ya botɛmɛli. Ndenge botyelaki Yehova motema mobimba mpe ekateli na bino ya kotikala sembo ezali kopesa bino lokumu. Lisusu, komikitisa na bino liboso ya komekama ezali kolendisa kondima na ngai ete Yehova atikaka basaleli na ye te. Molende, mpiko, kolendendela oyo bomonisaki esalisi biso tómitungisaka mingi te mpo na mikakatano mikemike oyo tokutanaka na yango.”—Tuteirihia, Polynésie française.
“Nsima ya kotánga Annuaire, namonaki ete nasengeli kokomela bino. Masolo na yango ya kolendisa esimbaki motema na ngai. Nayokaki esengo ya kozala na ebongiseli ya sembo, ya bomoko, oyo etambwisami na Tata ya bolingo, oyo asalisaka mpe apesaka biso makasi na ntango oyo ebongi. Nayokaki mawa na ndenge ebele ya basaleli ya mpiko ya Yehova banyokwamaki ndenge wana mpe kutu babungisaki bomoi na bango. Kasi, nayokaki mpe esengo ete mpo na mpiko mpe molende na bango, ebele ya bato bayekolaki solo mpe bayebaki Tata na biso ya bolingo.”—Colette, Pays-Bas.
“Ngai ná mwasi na ngai tomonaki ete tosengeli kokomela bino mpo na koyebisa bino ete masolo ya Annuaire oyo elobeli Ukraine esimbaki mitema na biso. Bino bandeko ya sembo, bopesi ndakisa monene ya molende na ntango ya mpasi makasi mpe oyo eumelaki mingi. Ndenge Masese 27:11 emonisi yango, Yehova azali mpenza na esengo ya komona ete ebele ya bandeko ya Ukraine batikalaki mpenza sembo atako Zabolo abimiselaki bango ebele ya makambo mabe.”—Alan, Australie.
“Nazalaki kotangisa mpisoli ntango nazalaki kotánga masolo ya bandeko ya Ukraine. Bayikaki mpiko na ebele ya makambo: bolɔkɔ, minyoko, mitungisi, kokabolama ya mabota. Nalingi koyebisa bandeko nyonso oyo bazali naino na masangá na bino ete nalingi bango mingi mpe nazali na limemya mingi mpo na bango. Mpiko mpe molende na bango esepelisi ngai mingi. Nayebi esika nguya na bango ezalaki kouta: na elimo ya Yehova. Yehova azali penepene na biso, mpe alingaka kosalisa biso.”—Sergei, Russie.
“Natángaki Annuaire 2002 mpe nalelaki. Ebele ya bandeko ya lisangá na biso bazalaki kolobela masolo na bino. Bozali mpenza na motuya na miso na biso. Nazali na esengo ya kozala na kati ya libota monene ya elimo.”—Yeunhee, Corée du Sud.
“Kondima, molende, mpe bolingo makasi na bino mpo na Yehova mpe Bokonzi na ye esimbaki mpenza motema na ngai. Ntango mosusu, topesaka motuya te na bonsomi oyo tozali na yango mpe na ebele ya bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa biso. Kasi, bino bosalaki bongo te. Kondima na bino esalisi biso na koyeba ete soki tozali na boyokani malamu na Nzambe na biso, ye akopesa biso makasi ya kolonga ata komekama ya ndenge nini.”—Paulo, Brésil.
“Nazwaki libaku malamu ya kotánga masolo ya Annuaire 2002. Esimbaki mpenza motema na ngai, mingimingi lisolo ya Ndeko-mwasi Lydia Kurdas. Nasepelaki mingi na ndeko-mwasi yango.”—Nidia, Costa Rica.
“Lelo, nasilisi kotánga Annuaire 2002. Ntango nazalaki kotánga yango, kondima na ngai epai ya Yehova elendisamaki. Nakobosana te lisolo oyo elobeli ndenge oyo balukaki kolona elimo ya kozanga kotya motema epai ya bandeko oyo bazalaki kotambwisa mosala. Eteyaki ngai nazanga te kotyela bandeko oyo bazali kotambwisa lisangá motema. Matɔndi mingi mpenza! Bilei yango ya elimo ezali malamu mpo na motema mpe ezali kobongisa biso mpo na ntango oyo kondima na biso ekoki mpe komekama.”—Leticia, États-Unis.
“Tozali na botɔndi mingi mpo na masolo kitoko oyo ezalaki na Annuaire. Mpo na ebele ya basakoli, ezalaki mbala ya liboso bátánga lisolo ya mosala ya bandeko na Ukraine. Bandeko balendisamaki mpenza. Ebele ya bandeko, mingimingi bilenge, babakisi molende na bango na mosala. Bamosusu kutu basɛngi mosala ya mobongisi-nzela mosungi to mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Masolo ya bandeko oyo basalelaki Yehova na ntango ya epekiseli elendisaki bango nyonso.”—Komite ya mosala ya lisangá moko, Ukraine.
Bosembo ya bandeko na biso ya Ukraine elendisaki mpenza basaleli ya Yehova na mokili mobimba. Ya solo, kotánga masolo ya kolendisa oyo ebimaka na Annuaire mbula na mbula ezali ndenge malamu ya kolendisa kondima mpe molende na biso na mikolo ya mabe oyo tozali.—Baebele 12:1.