Bilaka oyo ekozanga te kokokisama
BATO bapesá ebele ya bilaka oyo bakokisaka te. Bikólo mingi esalá boyokani ya kobunda na bikólo mosusu te, kasi mbala na mbala boyokani yango etosamaki te mpe bitumba oyo babundaki ememelaki bana-mboka mpasi mingi. Napoléon alobaki boye: “Baguvɛrnema etosaka bilaka na yango kaka soki emoni ete koboya kotosa yango ekobimisela bango mokakatano to soki ezali mpo na litomba na yango moko.”
Tokoloba boni mpo na bilaka oyo bato bapesaka? Esalaka biso mpasi soki moto apesi biso elaka, kasi akokisi yango te! Mingimingi soki ezali moto oyo toyebi malamu mpe totyelaka ye motema. Bato bakoki kozanga makoki ya kokokisa maloba na bango to mpe bakoki kaka koboya kokokisa yango.
Bilaka ya bato ekeseni mpenza na oyo ya Nzambe! Tokoki mpenza kotyela bilaka ya Nzambe motema. Yehova Nzambe azangaka te kokokisa bilaka na ye. Tondimi mpenza ete bilaka na ye nyonso ekokokisama. Yisaya 55:11 elobi na ntina na liloba ya Nzambe ete: “Boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.”
Na yango, ndenge nini tosengeli kotalela bilaka ya Nzambe oyo ezali na Biblia? Tokoki mpenza kotyela yango motema. Na ndakisa, ntoma Yoane akomaki ete: “Talá! Hema ya Nzambe ezali elongo na bato, mpe akofanda elongo na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” (Emoniseli 21:3, 4) Okoki kozwa mapamboli yango soki okokisi maloba ya Yesu oyo: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3.