Lisalisi ya solosolo mpo na babola
NTANGO Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, azalaki awa na mabelé, azalaki mpenza kosepela kosalisa babola. Moto moko oyo amonaki Yesu, akomaki boye: “Bato bakufá miso bazali komona lisusu, mpe batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato bakufá matoi bazali koyoka mpe bakufi bazali kolamuka, mpe nsango malamu ezali kosakolama epai ya babola.” (Matai 11:5) Kasi, ezali boni mpo na bamilio ya bato oyo bazali babola lelo oyo? Ezali nde na nsango moko ya malamu mpo na bango? Ɛɛ, ezali na nsango moko ya elikya!
Atako bato mingi bakipaka babola te mpe babosanaka bango, Biblia, Liloba ya Nzambe, epesi elaka oyo: “Bato na kozanga bakotikama libela te; elikya ya mobola ekokufa seko te.” (Nzembo 9:18) Maloba yango ya kobɔndisa ekokokisama ntango Bokonzi ya Nzambe, boyangeli ya likoló, ekozwa esika ya boyangeli ya bato. (Danyele 2:44) Yesu, moto oyo akoyangela na Bokonzi wana ya likoló, “akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo ya babola. Akosikola milimo na bango kati na minyoko mpe na mobulu; makila na bango makozala na motuya na miso na ye.”—Nzembo 72:13, 14.
Ntango Klisto akoyangela mabelé, bomoi ya bato ekozala ndenge nini? Bato oyo bakozala na mokili oyo Klisto akoyangela bakobuka mbuma ya misala na bango. Na Mika 4:3, 4, Biblia elobi boye: “Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya [nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, NW], moto moko akobangisa bango te mpo ete monɔkɔ ya [Yehova] na bibele elobi bongo.” Bokonzi ya Nzambe ekosilisa ata maladi ná liwa. (Yisaya 25:8) Makambo ekozala mpenza ndenge mosusu na mokili yango! Tokoki kotyela bisakweli yango ya Biblia motema mpo euti mpenza na Nzambe.
Biblia ezali kopesa biso elikya mpe ezali kosalisa biso tóyeba koyikela mikakatano ya mokolo na mokolo mpiko, na ndakisa ekoki kosalisa babola bátika komimona bato mpamba. Na nzela ya boyekoli na ye ya Biblia, moklisto oyo azali kokelela ayebi ete, na miso ya Nzambe, azali na valɛrɛ moko na moklisto oyo azali na bozwi. Mokanda ya Yobo emonisi ete Nzambe “akotalaka bilongi ya mikóló te mpe akotalaka mozwi koleka mobola te mpo ete bazali nyonso mosala ya mabɔkɔ na ye.” (Yobo 34:19) Nzambe alingaka bango nyonso ndenge moko.—Misala 10:34, 35.