Alingaki boboto
MILTON HENSCHEL aumelaki mingi na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova; bomoi na ye awa na mabelé esukaki mokolo ya pɔsɔ, 22 Marsi 2003. Azalaki na mbula 82.
Milton Henschel azalaki naino elenge ntango akómaki kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova mpe alekisaki mbula koleka 60 na mosala yango. Aumelaki te koyebana ete azali na bososoli mpe azalaki mpenza komibanzabanza mpo na mosala ya kosakola Bokonzi. Na 1939, akómaki sekrɛtɛrɛ ya Nathan Knorr, oyo azalaki mokɛngɛli ya imprimerie ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn. Na 1942, ntango Ndeko Knorr akómaki kotambwisa misala ya Batatoli na mokili mobimba, Ndeko Henschel azalaki mosungi na ye. Na 1956, Ndeko Henschel abalaki Lucille Bennett, mpe balekisaki bantango ya bisengo mpe ya mpasi elongo.
Ndeko Henschel asalaki ná Ndeko Knorr tii na liwa ya Ndeko Knorr na 1977. Ndeko Knorr asalaki mibembo mingi elongo na Ndeko Henschel na mikili koleka 150 mpo na kotala mpe kolendisa Batatoli ya Yehova, mingimingi bamisionɛrɛ mpe bandeko oyo basalaka na bafiliale. Na bantango mosusu, mibembo yango ezalaki mpasi, ata mpe na makama. Na 1963, ntango Ndeko Henschel akendaki na liyangani ya etúká na Liberia, banyokolaki ye mpo aboyaki kosangana na milulu ya ekólo.a Mwa basanza nsima ya likambo yango, Ndeko Henschel abangaki te kozonga lisusu kuna mpo na kokutana na prezida ya ekólo yango mpo na kosɛnga ete bápesa Batatoli ya Yehova bonsomi ya kosambela Nzambe na bango.
Eyebanaki ete mpo na koluka kosilisa mikakatano, Ndeko Henschel azalaki na mindɔndɔ te mpe na makambo makasi te. Bandeko oyo bazalaki kosala na ye bazalaki kosepela na ye mpo azalaki kosala makambo na molɔngɔ, mpo na bopɔlɔ na ye, mpe mpo alingaki kosɛkisa mingi. Lokola bɔɔngɔ na ye eyebaki kobomba makambo, azalaki kosepelisa bamisionɛrɛ mingi na bisika ndenge na ndenge na mokili lokola azalaki kobosana bankombo na bango te, kosimba mwa maloba ya monɔkɔ ya mboka oyo akei kotala, mpe kosalela maloba na ndimbola mosusu mpo na kosɛkisa.
Mika 6:8 elobi na biso ete Yehova Nzambe azali kosɛnga biso ‘tólinga boboto.’ Tokobosana Milton Henschel te mpo na ndakisa oyo atiki na likambo yango. Atako azalaki na mikumba minene, azalaki kosolola na moto nyonso, azalaki na esengo mpe na boboto. Azalaki kolinga mingi koloba ete, “Ntango olingi kozwa ekateli moko, kobosana te ete boboto eleki nyonso.” Atako tozali kolela ndenge tobungisi ndeko yango ya bolingo, tozali mpe kosepela ete ayikaki mpiko tii na nsuka mpe tondimi ete azwi mbano na ye, elingi koloba “motole ya bomoi.”—Emoniseli 2:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
[Elilingi na lokasa 31]
Milton Henschel ná Nathan Knorr
[Elilingi na lokasa 31]
Ná mwasi na ye Lucille