Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/8 lok. 29
  • Losambo ya solo esangisi libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Losambo ya solo esangisi libota
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/8 lok. 29

Losambo ya solo esangisi libota

MARIA azalaki na mbula 13 ntango ndeko na bango moko ayebisaki ye ná leki na ye ya mwasi, Lucy, nsango ya Yehova mpe alimbwelaki bango elikya ya Paladiso awa na mabelé. Lokola makambo yango esepelisaki bango mingi, bakendaki na ye na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Mateya malamu oyo bayokaki kuna esimbaki mpenza motema ya Maria. Ekesanaki mpenza na ndenge makambo esalemaka na ndako-nzambe, epai balekisaka ntango mingi nde na koyemba! Mwa moke na nsima, bana yango bakómaki koyekola Biblia na Motatoli ya Yehova moko.

Hugo, yaya na bango azalaki kosepela na filozofi mpe evolisyo. Azalaki koloba ete ye andimaka te ete Nzambe azali. Kasi, ntango azalaki na mosala ya soda, atángaki buku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? a Azwaki biyano na mituna oyo lingomba mosusu te ekokaki kopesa. Ntango asilisaki mosala ya soda, abandaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita elongo na baleki na ye ya basi mpo na kolendisa kondima na ye epai ya Nzambe. Maria ná Lucy bazwaki batisimo na 1992, mbula mibale nsima ya koyoka solo mpo na mbala ya liboso, mpe yaya na bango azwaki batisimo mbula mibale na nsima.

Baboti na bango oyo bazalaki bandimi ya Lingomba ya Katolike, bazalaki mpenza kosepela na solo te. Bazalaki komona ete Batatoli ya Yehova bazali motungisi, atako bazalaki kosepela na bizaleli malamu mpe molato ya bilenge Batatoli oyo bana na bango bazalaki kobengisa na ndako. Lisusu, na ntango ya kolya, ntango bana bazali koloba makambo oyo bayokaki na makita, baboti na bango bakómaki kosepela koyoka bango.

Atako bongo, baboti na bango bamipesaki na bankisi. Tata na bango azalaki molangwi masanga mpe azalaki kobɛta mwasi na ye. Etikalaki moke bákabwana. Na nsima, tata akɔtaki bolɔkɔ ya pɔsɔ mibale mpo asalaki mobulu nsima ya kolangwa masanga. Ntango azalaki na bolɔkɔ, abandaki kotánga Biblia. Na botángi na ye, amonaki maloba ya Yesu oyo elobeli elembo ya mikolo ya nsuka. Tata ná mama bakómaki komituna mituna mingi; yango wana, bakendaki na Ndako ya Bokonzi mpe bandimaki koyekola Biblia. Nsima ya koyekola solo, babwakaki babuku na bango nyonso ya makambo ya nkisi mpe lokola bazalaki kobelela nkombo ya Yehova, bilimo mabe batikaki kotungisa bango. Bakómaki mpenza kobongola bizaleli na bango.

Kanisá esengo oyo Maria ná Lucy bazalaki na yango na komona Hugo azali kobatisa baboti na bango na liyangani ya etúká oyo esalemaki na ekólo Bolivie na 1999! Eleki sikoyo soki mbula libwa banda Maria ná Lucy bayokaki mpo na mbala ya liboso nsango ya Yehova mpe bilaka na ye. Bango ná Hugo bazali sikoyo na mosala ya ntango nyonso. Bazali mpenza na esengo ete losambo ya solo esangisi libota na bango!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto