Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/7 lok. 32
  • Libɔndisi mpo na bato oyo bazali koluka lisalisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libɔndisi mpo na bato oyo bazali koluka lisalisi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/7 lok. 32

Libɔndisi mpo na bato oyo bazali koluka lisalisi

BIBLIA ezali buku ya pisikoloji te. Kasi, ebɔndisaka mpe esalisaka biso tózala na esengo atako tozali kokutana na mikakatano. Biblia ezali koloba solo ete: “Moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi.” (Yobo 14:1) Bampasi mosusu ezwaka biso mpo na kozanga kokoka na biso. Kasi, bampasi eutaka mingimingi epai ya nani?

Biblia elobi ete bampasi eutaka epai ya elimo moko ya mabe oyo babengi Zabolo mpe Satana. Azali “kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela” mpe mpasi oyo ezali kotungisa bato ezali kouta mingi epai na ye. Kasi, Biblia ezali mpe koyebisa biso ete mikolo na ye etikali ya kotánga. (Emoniseli 12:9, 12) Etikali moke Nzambe asilisa bampasi nyonso oyo Satana amemelá bato. Biblia elobi ete mokili ya sika ya boyengebene oyo Nzambe alaki ekoya kosilisa makambo nyonso oyo ezali kozangisa bato elikya.​—2 Petelo 3:13.

Koyeba ete bampasi ezali kaka mpo na mwa ntango moke ezali mpenza kobɔndisa! Ntango guvɛrnema ya Nzambe oyo Yesu Klisto akotambwisa ekoyangela mokili, kozanga bosembo mpe bampasi ekozala lisusu te. Mpo na Mokonzi oyo Nzambe aponi, Biblia elobi ete: “Akobikisa mobola oyo akogangaka, mpe moto ya mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa; akosikola milimo na bango kati na minyoko mpe na mobulu; makila na bango makozala na motuya na miso na ye.”​—Nzembo 72:12-14.

Etikali moke esakweli yango ekokisama. Tokozala na bomoi ya seko mpe ya esengo na mabelé oyo ekobongwana paladiso. (Luka 23:43; Yoane 17:3) Koyeba bilaka ya malamu wana oyo Biblia ezali kopesa biso epesaka elikya mpe ebɔndisaka baoyo bazali koluka lisalisi.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Elenge mwasi oyo azali na mawa: Fɔtɔ ya ILO/J. Maillard

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto