Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/6 lok. 32
  • Ezali momeseno mpamba to ezali nde kofuta avoka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali momeseno mpamba to ezali nde kofuta avoka?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/6 lok. 32

Ezali momeseno mpamba to ezali nde kofuta avoka?

NA BITEYELO mosusu ya minene na Pologne, bana-kelasi bazalaka na momeseno ya kokɔngɔla mbongo mpo na kosombela balakisi na bango makabo, na elikya ete bakopesa bango bilembo ya malamu na baekizame. Yango wana Katarzyna, elenge moklisto moko na Pologne, akutanaki na mokakatano mpenza na eteyelo. Azalaki komituna ete: “Nasengeli kopesa mbongo to te?” Baninga na ye ya kelasi bazalaki koyebisa ye ete: “Bato nyonso basalaka kaka bongo. Soki osali yango, okobungisa eloko moko te, kasi okoki kozwa matomba mingi, mpo na nini kokakatana?”

Katarzyna alobi ete: “Lokuta mabe, na mbula ya liboso nazalaki mpe kopesa mbongo. Kasi na nsima namonaki ete kosala bongo ezali kofuta avoka, ezaleli oyo Biblia epekisi.” Akanisaki bavɛrsɛ oyo emonisaka ete Yehova aboyi mpenza likambo ya kofuta avoka. (Deteronome 10:17; 16:19; 2 Ntango 19:7) Katarzyna alobi ete: “Namonaki mpenza ete ezalaka mpasi te kolanda makambo mabe ya baninga. Nakanisaki likambo yango malamumalamu mpe, banda wana, napesaka lisusu mbongo te.” Na boumeli ya mbula misato oyo eleki, atako bana-kelasi mosusu bazalaki kosɛka ye, azalaki kolimbolela bango ete apesaka “makabo” wana te mpo Biblia epekisi yango.

Bamosusu bazalaki koloba ete Katarzyna azali na moimi mpe ayebi kofanda na bato te. Katarzyna alobi ete: “Tii lelo oyo bamosusu kati na bango basepelaka na ngai te. Nzokande, mingi bamemyaka makanisi na ngai, mpe yango epesaka ngai esengo mingi.” Katarzyna ayebanaki malamu ete azali Motatoli ya Yehova oyo atosaka mitinda ya Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto