Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/6 lok. 30
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Kebá—Satana alingi kolya yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Yebá monguna na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Satana azali nani? Azalaka mpenza?
    Lamuká!—2007
  • Totelema ngwi liboso na mayele mabe ya Satana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/6 lok. 30

Mituna ya batángi

Satana Zabolo azali nde na likoki ya koyeba makanisi ya moto?

Atako tokoki koloba na kondimisama nyonso te, emonani mpenza ete Satana ná bademo na ye bakoki te koyeba makanisi na biso.

Tótalela naino bankombo oyo bazali kobenga na yango Satana mpo na misala na ye. Babengi ye Satana (Motɛmɛli), Zabolo (Motɔngi), Nyoka (na ebengeli mosusu Mokosi), Momeki, mpe Moto ya lokuta. (Yobo 1:6; Matai 4:3; Yoane 8:44; 2 Bakolinti 11:3; Emoniseli 12:9) Ata nkombo moko te kati na bankombo yango ezali kopesa likanisi ete Satana azali na likoki ya koyeba makanisi ya moto.

Nzokande, Yehova Nzambe abengami ‘moto oyo atalaka oyo ezali na kati ya mitema.’ (Masese 17:3, NW; 1 Samwele 16:7; 1 Ntango 29:17, NW) Baebele 4:13 elobi ete: “Ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso na ye [Yehova], kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe etandami polele na miso ya moto oyo epai na ye tokozongisa monɔkɔ.” Tokoki kokamwa te ete Yehova apesaki Mwana na ye Yesu likoki ya kotala na mitema. Yesu oyo asekwi alobaki ete: “Ngai natalaka bangɛi mpe mitema, mpe nakopesa bino moto na moto engebene misala na bino.”​—Emoniseli 2:23.

Biblia elobi te ete Satana akoki koyeba makambo oyo ezali na mitema mpe makanisi ya bato. Likambo yango ezali na ntina mingi, mpamba te ntoma Paulo alobi na biso ete baklisto ‘bazangi te koyeba mayele ya Satana.’ (2 Bakolinti 2:11) Yango wana, tosengeli kokanisa te ete Satana azali na makoki ya kokamwa oyo biso toyebi ata moke te.

Kasi, yango elingi koloba te ete Monguna na biso akoki te koyeba bolɛmbu na biso. Satana ayekoli bizaleli ya bato banda bankama na bankama ya bambula. Esengeli kaka te ayeba naino makanisi na biso mpo akoka koyeba bizaleli na biso, komona makambo oyo esepelisaka biso, to koyoka makambo nini tolobelaka, mpe bongo na bongo. Elongi na biso mpe nzoto na biso ekoki kofunda soki tozali kokanisa nini to soki tozali komiyoka ndenge nini.

Satana asalelaka mingimingi kaka mayele oyo asalelaki na elanga ya Edene: lokuta mpe kobuba. (Genese 3:1-5) Atako baklisto basengeli komitungisa te ete ntango mosusu Satana akotánga makanisi na bango, basengeli koluka koyeba makanisi nini Satana akoki koluka kokɔtisa na kati ya bɔɔngɔ na bango. Satana azali koluka ete baklisto ‘bábeba na makanisi mpe bázanga solo.’ (1 Timote 6:5) Ezali likambo ya kokamwa te ete mokili ya Satana ezali kobimisa ebele ya makambo mpe masano ya mabe. Mpo baklisto bákwea te, basengeli kolata “ekɔti ya lobiko” mpo na kobatela makanisi na bango. (Baefese 6:17) Mpo na kosala yango batondisaka makanisi na bango na solo ya Biblia mpe bakimaka makambo ya mokili ya Satana.

Satana azali monguna moko ya kosakana te. Kasi, tosengeli te kobangabanga ye to bademo na ye. Yakobo 4:7 elobi na biso ete: “Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.” Soki tolandi toli yango, tokoloba lokola Yesu ete Satana azali na bokonzi likoló na biso te.​—Yoane 14:30.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto