Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/6 lok. 32
  • ‘Salomo alataki te lokola moko na yango’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Salomo alataki te lokola moko na yango’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/6 lok. 32

‘Salomo alataki te lokola moko na yango’

BAFOLOLO lokola oyo ezali na fɔtɔ oyo emonanaka pambapamba ntango ozali kotambola na banzela ya zamba na sudi ya Afrika. Babengaka yango cosmos mpe eutá na mikili ya molunge ya Amerika. Komona bafololo kitoko ndenge wana oyo ezali kokola na zamba ekoki kotinda moto akanisa lisusu liteya moko oyo Yesu apesaki. Na kati ya bato oyo bazalaki koyoka ye, mingi bazalaki babola, mpe bazalaki komitungisa mpo na biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata.

Yesu atunaki bango ete: “Na oyo etali bilamba, mpo na nini bozali komitungisa? Bózwa liteya na bafololo kilinono ya esobe, ndenge yango ezali kokola; emonaka mpasi te, mpe etongaka te; kasi nazali koloba na bino ete ata Salomo na kati ya nkembo na ye nyonso alataki te lokola moko na yango.”​—Matai 6:28, 29.

Bato bapesá makanisi ndenge na ndenge mpo na fololo oyo Yesu azalaki kolobela. Kasi, Yesu akokanisaki yango na matiti mpe alobaki ete: “Bongo, sikoyo, soki Nzambe alatisaka matiti ya bilanga, oyo ezali lelo mpe lobi ekobwakama na litumbo, akoleka kolatisa bino te, bino bato ya kondima moke?”​—Matai 6:30.

Atako cosmos ezalaki na Yisalaele te, ezali mpenza komonisa bosolo ya liteya ya Yesu. Ezala ozali kotala yango na mosika to opusani pene na yango, emonanaka kitoko mpenza mpe ezali eloko oyo bato basepelaka mingi kokanga yango bafɔtɔ mpe koyema yango. Ya solo mpenza, Yesu alekisaki ndelo te ntango alobaki ete, “ata Salomo na kati ya nkembo na ye nyonso alataki te lokola moko na yango.”

Yango ekoki koteya biso nini lelo oyo? Bato oyo basalelaka Nzambe basengeli kondima ete ata na ntango ya mpasi, akosalisa bango na kozwa biloko oyo basengeli na yango. Yesu alobaki ete: “Bólukaka ntango nyonso Bokonzi [ya Nzambe], mpe biloko wana [lokola biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata] ekobakisama epai na bino.” (Luka 12:31) Ya solo, koluka Bokonzi ya Nzambe epesaka matomba ya solosolo. Kasi oyebi soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini mpe soki ekosala nini mpo na bato? Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo ozwa biyano na kati ya Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto