Poná bomoi ya seko
LELO oyo, bato mingi bakómi na likoki ya kopona ebele ya makambo. Na ndakisa, mbala mingi esɛngaka tópona bilamba tokolata, biloko tokolya, mosala tokosala mpe esika tokofanda. Na bisika mingi ya mokili moto na moto aponaka molongani na ye. Nzokande, Biblia ezali kolakisa biso likambo moko oyo bato nyonso bazali na likoki ya kopona mpe yango eleki makambo mosusu nyonso oyo moto akoki kopona.
Biblia elobi ete: “Moto oyo atɛlɛmi makasi na ngámbo ya boyengebene azali na nzela ya bomoi, kasi ye oyo azali kolanda makambo mabe azali na nzela ya liwa na ye moko.” (Masese 11:19, NW) Yesu Klisto mpe alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3.
Ya solo, Mozalisi na biso apesi biso likoki ya kopona nzela oyo ekoki komema na bomoi ezangi nsuka! Tosengeli kosala nini mpo tózwa bomoi yango ya libela na libela?
Biblia emonisi ete “bomoi ezali na nzela ya boyengebene.” (Masese 12:28) Tokoki kozala kati ya bato ya sembo oyo bazali kotambola na nzela oyo ezali komema na bomoi ezangi nsuka. Ndenge nini? Soki tosali makasi ete tókokisa mokano ya Nzambe mpe tótosa mibeko na ye na bomoi na biso. (Matai 7:13, 14) Yango wana, tópona nzela ya malamu mpe tózwa likabo ya bomoi ya seko oyo Nzambe azali kopesa biso.—Baloma 6:23.