Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/5 lok. 3
  • Lisolo moko kitoko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisolo moko kitoko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Lisolo ya Noa ezali nde na ntina mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Lisolo ya Noa mpe Mpela na mokili mobimba ezali kaka lisapo mpamba?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Kondima ya Noa ekweisi mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masuwa ya Noa
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/5 lok. 3

Lisolo moko kitoko

RICHARD BYRD, moto moko oyo azalaki kotambolatambola mpo na koluka mikili oyo eyebani naino te, asalaki mibembo mbala mitano na mokili ya Antarctique banda na 1928 tii na 1956. Lokola ye ná baninga na ye bazalaki kokoma makambo nyonso oyo bazalaki kosala mpe oyo bazalaki komona na mibembo na bango, bakómaki koyeba ntango nini mpe epai wapi mipɛpɛ ekoki kobɛta, bayebaki koyema bakalati mpe bayebaki makambo mingi ya mokili ya Antarctique.

Makambo oyo esalemaki na mibembo ya Byrd ezali komonisa ntina ya babuku ya mibembo. Na kati ya buku ya mobembo, bakomaka makambo nyonso oyo elekaki na mobembo. Na nsima, bakoki kotalela babuku yango mpo na koyeba lisusu makambo oyo esalemaki to mpe mpo na koyekola yango malamumalamu mpo na koyeba makambo nini ekoki kosalisa bango mpo na mibembo mosusu.

Makomami elobeli lisolo moko kitoko ya Mpela oyo esalemaki na ntango ya Noa. Mpela yango oyo ezindisaki mokili mobimba eumelaki koleka mbula mobimba. Lokola Mpela ezalaki koya, Noa, mwasi na ye mpe bana na bango ya mibali misato ná basi na bango basalaki mbula 50 to 60 mpo na kotonga masuwa moko monene oyo ezalaki na bolai ya mɛtrɛ 133,50, na bonene ya mɛtrɛ 22,30 mpe na bosanda ya mɛtrɛ 13,40. Batongaki masuwa yango mpo na nini? Mpo na kobikisa bato mpe banyama na Mpela.​—Genese 7:1-3.

Mokanda ya Genese ezali na lisolo ya makambo oyo Noa akutanaki na yango banda ntango Mpela ebandaki tii ntango ye ná libota na ye babimaki na masuwa. Lisolo yango ezali nde na ntina mpo na biso lelo oyo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto