Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Litomba nini tokoki kozwa soki toyekoli lisolo ya libota ya Safana?
Safana azalaki mokomeli mpe sekrɛtɛrɛ ya Yosiya, mokonzi ya Yuda. Lokola azalaki moto monene na kati ya ekólo, apesaki mabɔkɔ na mosala monene oyo mokonzi asalaki mpo na kozongisa losambo ya solo. Bana mibali mibale ya Safana basalisaki mosakoli Yilimia. Mwana na ye mosusu ya mobali mpe bankɔkɔ na ye mibale ya mibali, lokola bazalaki na bisika ya lokumu na ekólo, basimbaki losambo ya solo. Biso mpe ndenge moko, tosengeli kosalela biloko na biso mpe bisika na biso ya lokumu mpo na kotombola losambo ya solo.—15/12, nkasa 19-22.
• Ndenge nini Irene Hochstenbach alongaki mokakatano monene oyo azalaki na yango mpe akómaki mosaleli ya Yehova?
Irene Hochstenbach akufaki matoi ntango azalaki na mbula nsambo. Atako azalaki koyoka lisusu te, ayekolaki ndenge ya kosolola na bato mosusu mpe sikoyo atambolaka elongo na mobali na ye (mokɛngɛli ya zongazonga) mpo na kosalisa masangá na Pays-Bas.—1/1, nkasa 23-26.
• Buku mibale nini tozwaki na liyangani ya etúká “Basakoli ya Bokonzi ya molende”?
Baklisto ya mokili mobimba basepelaki ntango bazwaki buku Tósambela Nzambe kaka moko ya solo, oyo ebongisami mpo na koyekola na bato ya sika oyo basilisi koyekola buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Buku mosusu ya sika oyo tozwaki ezali Tópusana penepene na Yehova (na Lifalanse), yango ezali kolobela mpenzampenza bizaleli ya Yehova mpe misala na ye. Buku yango ezali mpe komonisa ndenge oyo tokoki komekola bizaleli yango.—15/1, nkasa 23-24.
• Maloba ya Masese 12:5 ete: “makanisi ya bayengebene ezali sembo,” elimboli nini?
Makanisi ya bato malamu ezalaka mabe te mpe etalelaka makambo ya malamu mpe ya sembo. Lokola balingaka Nzambe mpe bazalani na bango, bato ya sembo bazalaka na mikano ya malamu.—15/1, lokasa 30.
• Nini ekoki kosalisa moto atalelaka mosala na ndenge ya malamu?
Ezali malamu ete moto ayekola kolinga mosala banda na bomwana na ye. Biblia ezali kolendisa biso tózalaka bato oyo balingaka mosala, kasi bato ya gɔigɔi te. (Masese 20:4) Kasi, eyebisi mpe baklisto ete bákóma baombo ya mosala te. Tosengeli koyeba ete mosala ya Nzambe ezali na esika monene na bomoi na biso. (1 Bakolinti 7:29-31) Lisusu, baklisto ya solo bayebaka ete Nzambe akosundola bango te.—1/2, nkasa 4-6.
• Esika nini Biblia elobeli etumbelo mpo na mbala ya liboso?
Ezali na Genese 8:20, esika balobeli etumbelo oyo Noa atongaki ntango abimaki na masuwa nsima ya Mpela. Kasi, ekoki kozala ete Kaina na Abele mpe basalaki bitumbelo mpo na kopesa bambeka na bango. (Genese 4:3, 4)—15/2, lokasa 28.
• Ndenge nini baklisto mosusu bakoki kosalela na ndenge ya malamu mbongwana oyo ekɔti na bomoi na bango?
Bamosusu bandimaki to basɛngaki bango moko misala oyo elingaki kopesa bango ntango ya kosakola mingi. Bamosusu bakómaki kosala mingi mpe bandimaki mikumba mosusu ya sika na mosala ya Nzambe ntango mikumba na bango ya libota ekitaki, na ndakisa ntango bana na bango bakómaki mikóló mpe babalaki.—1/3, nkasa 19-22.
• Ndenge nini ndakisa ya Yona mpe ya ntoma Petelo ezali kosalisa biso na kotalela bamosusu ndenge oyo Yehova atalelaka bango?
Toyebi malamu ete Yona ná Petelo bazalaki bango mibale na mabunga na makanisi na bango mpe na ndenge oyo bazangaki kondima mpe botosi ntango bamekamaki. Kasi, Yehova amonaki polele bizaleli malamu oyo bazalaki na yango mpe akobaki kosalela bango na mosala na ye. Ntango bato mosusu babɛtisi biso libaku to basali biso mabe, tosengeli kotya likebi na bizaleli na bango ya malamu mpo na komona eloko oyo ezalaki liboso kosepelisa biso epai na bango mpe kotalela oyo Nzambe amonaka ya malamu epai na bango.—15/3, nkasa16-19.
• Mpo na nini banimero ya mokanda ya nzembo ezali ndenge moko te na Babiblia nyonso?
Ndenge oyo batyá banimero na mokanda yango na monɔkɔ ya Liebele ezali ndenge moko te na ndenge oyo batyá yango na libongoli ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki. Mabongoli mingi oyo ezali kosalema lelo ekoki kokesana, soki basalelaki makomi ya Liebele to libongoli ya Septante mpo na kobongola yango.—1/4, lokasa 31.