Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/4 lok. 3
  • Elambo ya nsuka ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elambo ya nsuka ezali nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Elambo ya Nkolo ezali na ntina mingi mpo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Elekeli ya nsuka ya Yesu
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mokolo ya kozanga te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Misa
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/4 lok. 3

Elambo ya nsuka ezali nini?

OKANISAKA nini ntango oyokaka maloba “elambo ya nsuka”? Bato mingi bamonaka nde elilingi kitoko oyo ezali na Milan, na Italie, oyo Léonard de Vinci (1452-1519) asalá. Elambo ya nsuka ya Nkolo ezali moko na makambo oyo banda kalakala basalelá yango ebele ya mayemi, balobelá yango mingi na mikanda mpe bayembá yango mingi na nzembo.

Kasi, Elambo ya Nsuka ezali nini, mpe ezali na ntina nini mpo na bato ya ekeke ya 21? Babuku ya minene (encyclopédie) ná badiksionɛrɛ elobi ete Elambo ya Nsuka, oyo babengaka mpe Elambo ya Nkolo, ezali bolei oyo Yesu Klisto alyaki elongo na bayekoli na ye na mpokwa ya nsuka liboso akufa mpo na kopesa bomoi na ye mbeka. Bato mingi babengaka yango Elambo ya Nsuka mpamba te, ezalaki elambo ya mpokwa ya nsuka oyo Yesu alyaki elongo na bayekoli na ye ya sembo. Lokola ezali Nkolo Yesu ye moko nde abandisaki yango, ebongi mpenza kobenga yango Elambo ya Nkolo.

Kobanda bikeke mingi, ebele ya bato bandimaki ata kokufa mpo na makambo oyo bamonaki ete ezali na ntina mingi. Lokola bandimaki kokufa, bato mosusu bazwelaki liwa na bango bolamu mpo na mwa ntango. Kasi, tokoki kokokanisa liwa ya moto moko te oyo akufaki ndenge wana, ata soki ezalaki mpo na ntina ya malamu, na liwa ya Yesu Klisto. Lisusu, liwa ya moto ata moko te na mokili oyo etondi na mikakatano mpe kowelana ekoki kopesa bato ya mokili mobimba bolamu. Mpo na nini?

Mpo na kozwa eyano na motuna oyo mpe kosalisa yo oyeba ntina ya Elambo ya Nkolo mpo na yo, tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto