Bakanisi Batatoli ya Yehova oyo babomamaki
NA MOKOLO ya 7 Marsi 2002, balongolaki elamba oyo ezalaki kozipa etanda moko ya ekaniseli na engumba Körmend, na wɛsti ya ekólo Hongrie. Esalemaki mpo na kokanisa liwa ya Batatoli ya Yehova misato oyo Banazi babomaki na 1945.
Batii etanda yango na efelo ya ndako oyo ezali lelo oyo biro monene ya bato oyo babomaka mɔtɔ, epai babomaki Batatoli wana misato na miso ya ebele ya bato; biro yango ezali na balabala Hunyadi. Na etanda yango, bakomi ete yango ezali mpo na kokanisa ‘baklisto oyo babomamaki na sanza ya Marsi 1945 mpo baboyaki kokɔta mosala ya soda mpo na bindimeli ya lingomba na bango. Antal Hőnisch (1911-1945), Bertalan Szabó (1921-1945), János Zsondor (1923-1945), 2002, Batatoli ya Yehova.’
Babomaki bango sanza mibale liboso ete Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esila. Mpo na nini babomaki baklisto wana? Zulunalo moko ya Hongrie (Vas Népe) elobi boye: “Ntango Hitler azwaki bokonzi na Allemagne, akanelaki kaka Bayuda te, kasi akanaki mpe ete akonyokola bandimi ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova, akotya bango na bakaa ya bakangami mpe akoboma bango soki baboyi bindimeli ya lingomba na bango te. . . . Na sanza ya Marsi 1945, bato ya eteni ya wɛsti ya Hongrie bazalaki na nsɔmɔ mpo bakonzi bazalaki komonisa bango mpasi. . . . Na ndakisa, bazalaki komema bandimi ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova na bamboka mosusu mpe bazalaki koboma bango.”
Molulu ya kolongola elamba oyo bazipaki na yango etanda wana esalemaki na biteni mibale. Eteni ya liboso esalemaki na ndako moko ya teyatre (Batthyány Castle). Na esika yango, kati na bato oyo balobaki, ezali na Profɛsɛrɛ Szabolcs Szita, ye azali mokambi ya ebongiseli moko oyo ezali na engumba Budapest, oyo ebombaka mikanda oyo elobelaka makambo etali ebele ya bato oyo Banazi babomaki; László Donáth, ye azali na komite ya Parlema oyo etalelaka ntomo ya bato, makambo etali mangomba mpe bituluku ya bato oyo makambo na bango ekeseni na oyo ya bato ebele ya ekólo; mpe Kálmán Komjáthy, oyo amonaki na miso ndenge babomaki Batatoli yango, mpe sikoyo akomá moto oyo ayebi malamumalamu makambo oyo eleká na engumba yango. Bato koleka 500 oyo bazalaki wana bakatisaki engumba mpo na kolanda eteni ya mibale ya molulu yango, elingi koloba ntango oyo József Honfi, mokambi ya engumba Körmend, asengelaki kolongola elamba oyo ezipaki etanda yango.
Na mokanda na ye ya nsuka, Ján Žondor (to János Zsondor), alendisaki bandeko na ye baklisto ete bázala na mawa te. Akomaki boye: “Nabosanaka te maloba ya Yoane oyo ezali na Emoniseli 2:10, ete: ‘Omimonisa sembo ata tii na liwa.’ . . . Bóyebisa bandeko mpe baninga na ngai ete báyoka mawa te, mpo nazali kokufa mpo na solo kasi lokola bandí te.”
[Elilingi na lokasa 32]
Bertalan Szabó
[Elilingi na lokasa 32]
Antal Hőnisch
[Elilingi na lokasa 32]
Ján Žondor