Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/1 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Mpo na nini kokanisa Bolei ya mpokwa ya Nkolo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ekaniseli (Bilei ya mpokwa ya Nkolo)
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Elambo ya Nkolo ezali na ntina mingi mpo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/1 lok. 31

Mituna ya batángi

Paulo alingaki koloba nini ntango akomaki ete: “Mbala nyonso oyo bozali kolya limpa oyo mpe komɛla kɔpɔ oyo”?

Ntango Paulo alobelaki ndenge oyo Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, akomaki boye: “Mbala nyonso oyo bozali kolya limpa oyo mpe komɛla kɔpɔ oyo bozali kokoba kosakola liwa ya Nkolo, tii ntango akoya.” (1 Bakolinti 11:25, 26) Bato mosusu bakanisaka ete maloba “mbala nyonso” oyo ezali na vɛrsɛ yango emonisaka ete esengeli kokanisaka liwa ya Klisto mbala na mbala, to mbala ebele. Yango wana, na mbula moko, bakanisaka liwa ya Yesu mbala ebele. Paulo alingaki mpenza koloba bongo?

Eleki mbula pene na 2 000 banda Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye. Na yango, ata soki esengelaki kosalaka Ekaniseli yango mbala moko na mbula, yango elakisi ete banda mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) tii lelo oyo esili kosalema mbala ebele. Kasi, soki totaleli makambo oyo ezali mwa liboso mpe mwa moke na nsima ya 1 Bakolinti 11:25, 26, tokomona ete Paulo azalaki te kolobela mbala boni Ekaniseli esengeli kosalema, kasi ndenge oyo esengeli kosalema. Paulo asalelaki te liloba pollakis, oyo na Grɛki ya ebandeli elimboli “mbala mingi” to “mbala na mbala.” Kasi, asalelaki liloba hosakis, oyo elimboli “mbala nyonso,” to “ntango nyonso,” “na ntango nyonso oyo.” Paulo alingaki koloba ete: ‘Na ntango nyonso oyo bosali yango, bozali kokoba kosakola liwa ya Nkolo.’

Boye, Ekaniseli ya liwa ya Yesu esengeli kosalemaka mbala boni? Ebongi mpenza esalemaka kaka mbala moko na mbula. Yango ezali ekaniseli, nzokande ekaniseli ata ya likambo nini esalemaka kaka mbala moko na mbula. Lisusu, Yesu akufaki mokolo oyo Bayuda bazalaki kosala Elekeli, bazalaki kosala yango mpe mbala moko na mbula. Yango wana mpenza Paulo alobaki na ntina na Yesu ete “Klisto elekeli na biso,” mpamba te liwa ya Klisto lokola mbeka efungolelaki Yisalaele ya elimo nzela ya bomoi, se ndenge oyo mbeka oyo epesamaki na Elekeli ya libosoliboso ebatelaki bomoi ya bana ya liboso ya Bayisalaele na Ezipito mpe esalisaki bato ya ekólo yango na kolongwa na boombo. (1 Bakolinti 5:7; Bagalatia 6:16) Bokokani wana na Elekeli ya Bayuda oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula na ntango ya kala ezali mpe likambo mosusu oyo ezali kondimisa ete Ekaniseli ya liwa ya Yesu esengeli kosalemaka mbala moko kaka na mbula.

Longola yango, Paulo ayokanisaki liwa ya Yesu na fɛti mosusu oyo Bayuda bazalaki kosala mbala moko na mbula: Mokolo ya Mbɔndi. Na Baebele 9:25, 26, tozali kotánga boye: “Ezali mpe te mpo [Yesu] amikabaka ye moko mbala na mbala, ndenge nganga-nzambe monene akɔtaka na kati ya esika mosantu mbula na mbula [na Mokolo ya Mbɔndi] elongo na makila oyo ezali ya ye moko te. . . . Kasi sikoyo asili komimonisa mbala moko mpo na libela na bosukisi ya bibongiseli ya makambo mpo na kolongola lisumu na nzela ya mbeka na ye moko.” Lokola mbeka ya Yesu ezwaki esika ya mbeka oyo ezalaki kopesama mbala moko na mbula na Mokolo ya Mbɔndi, ebongi mpenza ete Ekaniseli ya liwa na ye esalemaka mbala moko na mbula. Likambo moko te na kati ya Makomami ezali komonisa ete esengeli kosalaka Ekaniseli mbala mingi na mbula moko.

Na boyokani na likanisi yango, John Laurence von Mosheim, moto ya mayele na makambo ya kala, alobaki ete baklisto ya ekeke ya mibale na Asie Mineure bamesanaki kosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu “na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso ya Bayuda [Nisana].” Ezalaki na nsima mpenza nde mangomba ya boklisto ezwaki momeseno ya kosala yango mbala mingi na mbula moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto