Azwaki mbano mpo na molende na ye
Bato mingi ya motema malamu balingaka ete bandeko mpe baninga na bango báyeba mokano ya Nzambe mpo bázala na bomoi ya esengo. Ekómaka ete bizaleli malamu ya bato mosusu, bázala bana mike to mikóló, etinda moto na kozwa ekateli malamu ya komipesa na Nzambe. Yango emonanaki epai ya Jearim, elenge mwasi moko na Mexique; na liyangani ya mokolo moko ya Batatoli ya Yehova, apesaki mokanda moko bátángela bayangani, mokanda yango elobaki boye:
“Nalingi koyebisa bino esengo oyo nazali na yango. Kasi, liboso tiká nayebisa bino naino ntina ya esengo yango. Eleki sikoyo mbula 18, liboso kutu nabotama, baboti na ngai babandaki koyekola solo. Mama akolaki na elimo; na nsima, ngai na leki na ngai ya mobali mpe tolandaki ye. Biso misato tozalaki kobondela Yehova asalisa tata mpo ye mpe akoka kolanda nzela ya bomoi. Bongo, lelo oyo ezali mokolo monene mpo na biso nsima ya kozela mbula 18. Tata akozwa batisimo. Nazali kotɔnda Yehova mpo ete atikaki te ete nsuka eya liboso ya mokolo oyo tozalaki kozela banda kala. Matɔndi mingi Yehova!”
Na ntembe te, na boumeli ya bambula nyonso wana, libota ya elenge mwasi yango bazalaki kobosana te toli oyo ezali na 1 Petelo 3:1, 2, ete: “Bino basi, bótosaka mibali na bino moko, mpo ete, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama kozanga liloba na nzela ya etamboli ya basi na bango, mpamba te bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto elongo na limemya makasi.” Na ntembe te, elenge Jearim azalaki mpe kolanda maloba ya Deteronome 5:16, ete: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo, lokola [Yehova] Nzambe na yo alakelaki yo.” Jearim, leki na ye na mama na ye bazwaki mapamboli mpo bazalaki kosalela mitinda wana mpe bazelaki Yehova na motema molai.