Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/12 lok. 32
  • “Bato misato ya bwanya” bazalaki banani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bato misato ya bwanya” bazalaki banani?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/12 lok. 32

“Bato misato ya bwanya” bazalaki banani?

Mbala mingi bililingi ya mbotama ya Yesu ezalaka na mibali misato balati banzambala oyo bayei na bakamela na bango na ndako ya bibwele esika balalisi mwana Yesu na elyelo. Bapaya yango oyo balati bilamba ya ntalo, mbala mingi babengaka bango bato misato ya bwanya. Biblia elobi nini mpo na bango?

Biblia elobi ete bato wana oyo babengamaka bato ya bwanya bautaki “bipai ya ɛsti” mpe ezali kuna nde bayebaki ete Yesu asilaki kobotama. (Matai 2:​1, 2, 9) Na ntembe te mobembo ya bato yango tii na Yudea eumelaki mikolo mingi. Ntango bamonaki Yesu, azalaki lisusu te mwana oyo auti kobotama sika, oyo balalisi ye na ndako ya bibwele. Bato yango bakutaki Malia na “mwana yango ya moke” na ndako.​—⁠Matai 2:⁠11.

Biblia ebengi bato yango ya maji to “banganga-minzoto,” mpe elobi te soki bazalaki boni. Buku moko (The Oxford Companion to the Bible) elobi ete: “Boyokani oyo ezali na misala ya maji mpe kotala minzoto emonani polele na ndenge oyo bapaya wana balandaki monzoto oyo ememaki bango tii na Beteleme.” Biblia eboyi mpenza lolenge nyonso ya maji mpe misala ya bato ya Babilone ya kotala minzoto mpo na koluka koyeba makambo.​—⁠Deteronome 18:​10-12; Yisaya 47:⁠13.

Makambo oyo bato yango bayebaki na nzela ya minzoto ememaki ata likambo moko ya malamu te. Elamusaki nde nkanda mpe zuwa ya mokonzi mabe Elode. Likambo oyo esalaki ete Yozefe, Malia na Yesu bákima na Ezipito, mpe esalaki ete báboma bana mibali nyonso ya mike “banda na mbula mibale mpe na nse.” Elode ayebaki malamu mpenza ntango oyo Yesu abotamaki na nzela ya makambo oyo banganga-minzoto bayebisaki ye. (Matai 2:16) Na kotalela makambo nyonso ya mabe oyo ebimaki na ndenge oyo banganga-minzoto wana bakendaki kotala Yesu, tokoki koloba ete monzoto oyo bango bamonaki mpe nsango ya “moto oyo abotami mokonzi ya Bayuda” eutaki epai ya monguna ya Nzambe, Satana Zabolo, oyo azalaki na mposa ya koboma Yesu.​—⁠Matai 2:​1, 2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto