Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/12 lok. 8
  • Na mesa ya kapitɛni

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na mesa ya kapitɛni
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ozali kolya na mesa oyo wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Nani abandisá lingomba ya Batatoli ya Yehova?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Bokonzi ebotami na likoló
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/12 lok. 8

Na mesa ya kapitɛni

NA MOBEMBO ya masuwa, kolya na mesa ya kapitɛni ezalaka likambo ya esengo mpenza mpamba te okozala esika moko na bato ya lokumu, okolya bilei ya kitoko mpe bokosolola masolo ya ntina. Nzokande, lisolo moko oyo elekaki mokolo mosusu na mesa ya Robert Smith, kapitɛni moko oyo azalaki kotambwisa bamasuwa ya kompanyi moko ya Angleterre (White Star Line), elobelaki fɛti moko ya bilei ya elimo.​—⁠Yisaya 25:⁠6.

Na mobu 1894, ntango wana Robert azalaki na mbula 24, atambwisaki masuwa moko (Kinclune of Dundee) mpo na mobembo na ye ya liboso oyo atambolaki mokili mobimba. Nsima na yango, atambwisaki bamasuwa ndenge na ndenge ya kompanyi White Star; na ndakisa, Cedric, Cevic na Runic.a Mokolo mosusu, ntango azalaki kotambwisa masuwa moko oyo autaki na yango na New York mpo na kokende na Liverpool, na Angleterre, abengisaki Charles Russell mpo na kolya na mesa na ye. Lisolo oyo asololaki na Russell epesaki ye mposa ya koyeba nsango ya Biblia. Na nsima, mpo na kosalisa ye ayeba ebele ya makambo mosusu, Russell apesaki ye babuku Études des Écritures mpe azwaki yango na esengo.

Russell azalaki ntango nyonso kotindela Robert mikanda oyo ekolisaki mposa na ye mpo na nsango ya Biblia. Robert ayebisaki mwasi na ye makambo oyo ayekolaki. Eumelaki te, bango nyonso mibale bakómaki Bayekoli ya Biblia, nkombo ya Batatoli ya Yehova na ntango wana, mpe bazalaki na molende na mosala na bango. Na nsima, Robert azwaki libaku ya kosala masukulu ya Biblia. Na ndakisa, na Brisbane, engumba moko ya Australie, asalaki lisukulu moko oyo ezalaki na motó ya likambo: “Malasi ya Gileadi.” Na lisukulu yango, amonisaki ete Liloba ya Nzambe ezali na nsango oyo ezali “nkisi mpo na kosilisa bampasi nyonso ya mokili.” Ntango azongaki na Angleterre, ye na mwasi na ye na bana na bango bazalaki kolakisa “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi”; ntango bazali kolekisa bililingi, bazalaki mbala moko kobɛta badiskɛ oyo ezalaki na maloba ya Russell mpo na kolimbola bililingi yango.

Robert ateyaki mpe bana na ye solo ya Bokonzi oyo ye ayekolaki. Lelo oyo, na molɔngɔ ya mitano ya bankɔkɔ na ye, bato 18 bazali kosakola nsango malamu na molende; bazali na botɔndi mpo na bilei oyo etyamaki na mesa ya kapitɛni.

Lelo oyo, na nzela ya mikanda na bango mpe na mosala na bango ya koteya Biblia, Batatoli ya Yehova bazali kosalisa bato na mokili mobimba báyeba nsango ya Biblia oyo elamusaki mposa ya kapitɛni Smith. Yo mpe okoki koyeba makambo yango ya ntina oyo esepelisaki bato na mesa ya kapitɛni.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Titanic ezali masuwa oyo ezindaki kaka na mobembo na yango ya liboso, nkombo ya kapitɛni na yango ezalaki Edward Smith, ezali Smith wana te nde tozali kolobela na lisolo oyo.

[Elilingi na lokasa 8]

Robert Smith

[Elilingi na lokasa 8]

Charles Russell

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto