Ntango ya malamu mpenza ya kozala na bomoi
NTANGO ozali kokutana na mikakatano, ekómelaka yo okanisa “ntango ya kala”? Boye, yoká maloba ya Salomo, mokonzi ya bwanya: “Koloba te ete: ‘Ndenge nini mikolo ya kala ezalaki malamu koleka mikolo ya lelo?’ Mpamba te ezali bwanya te nde etindi yo otuna bongo.”—Mosakoli 7:10, NW.
Mpo na nini Salomo apesaki toli wana? Mpamba te ayebaki ete kotalela na ndenge ya malamu makambo oyo eleká ekoki kosalisa moto alonga mikakatano oyo azali kokutana na yango. Bato oyo bakanisakanisaka “ntango ya kala” babosanaka ete mikolo wana ezalaki mpe na mikakatano na yango mpe bomoi ezalaki kaka na bisengo te. Toboyi te, makambo mosusu ezalaki malamu na ntango ya kala, kasi mosusu mpe ezalaki malamu te. Lokola Salomo amonisaki yango, kokanisakanisa makambo ya ntango ya kala ezali likambo ya bwanya te; mpamba te yango eleká, ekozonga lisusu te.
Kokanisakanisa makambo ya kala ekoki mpe kozala mabe? Ɛɛ, soki yango ezali kopekisa biso kondima makambo ndenge oyo yango ezali lelo mpe komesana na yango to soki ezali kolongola biso elikya.
Kutu, sikoyo nde ntango ya malamu mpenza ya kozala na bomoi atako makambo mabe ezali se kobakisama na mokili. Mpo na nini? Mpamba te etikali moke Nzambe akokisa mokano na ye mpo na mabele mpe tózwa mapamboli oyo Bokonzi na ye ekomemela biso ntango ekoyangela mpenza mabele na kimya nyonso. Biblia elaki ete: “Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” (Emoniseli 21:4) Na ntango wana, lokola makambo nyonso ekozala malamu mpenza, moto moko te akozala lisusu na mposa ya kokanisakanisa “ntango ya kala.”