Misala oyo ezali kolendisa bizaleli malamu
Na Mozambique, na nsuka ya mobu 2001, bato oyo bayokaki bansango na radio bayokaki nsango oyo:
“Tata-mokonzi ya ekólo akendaki kotala biro ya Batatoli ya Yehova na Maputo. Alendisaki baklisto yango ete bábakisa lisusu milende na bango mpo na koteya bizaleli ya malamu na mabota mpe mpo na koyekolisa bakóló kotánga mpe kokoma. Ebongiseli yango esalisi bato soki 10 000 báyeba kotánga mpe kokoma. Prezida Chissano alobaki ete esengeli kopesa bibongiseli ya ndenge wana longonya, mpamba te yango ezali kopesa mabɔkɔ mpo na kosilisa mikakatano ya koyekolisa bato mokanda oyo ekólo na biso ezali naino kobunda na yango.”
Nsango yango ebakisaki maloba oyo ya Tata-mokonzi ya ekólo: “Tozali kosepela na komona ete ebele ya bato bazali na mposa ya koyekolisa bato mosusu mokanda. Yango ezali komonisa ete bato oyo bazali basali ya Leta te bakosalisa biso mpo bana-mboka mingi báyekola kotánga mpe kokoma. Yango wana, nalingi kolendisa Batatoli ya Yehova ete bábakisa lisusu milende na ebongiseli na bango ya kolakisa bato kotánga mpe kokoma, ata soki ezali kosalema na monɔkɔ nini. Likambo ya ntina mingi ezali ete bato báyeba kotánga mpe kokoma mpe ete bázala na mikakatano te mpo na kokomela basusu mikanda mpe kotánga mikanda oyo bakomeli bango, mpe ete na mikolo oyo ezali koya bango mpe bátángisa ebele ya bato mosusu.”
Batatoli ya Yehova na Mozambique mobimba bazali na bisika 850 oyo bayekolisaka bato kotánga mpe kokoma mpo bato bákoka bango moko kotánga Liloba ya Nzambe. Lisusu, pɔsɔ na pɔsɔ bayekolaka Biblia ofele na bato soki 50 000. Nyonso wana ezali ebongiseli ya koteya bato makambo ya Nzambe oyo ezali kosalema lelo oyo na bikólo 235. (Matai 24:14 ) Ebongiseli yango ekoki mpe kosalisa yo. Kobanga te kotuna Batatoli ya Yehova na mboka oyo ofandi.