Tozali nde na mposa ya bandako ya losambo?
‘Ebele ya bato balati bilamba ya langi-langi bauti epai na epai na ekólo mobimba; Ba-Indien bazali kobɛta mbonda mpe bazali kobina mabina ya bankɔkɔ, bandimi bazali kotambola na mabɔlɔngɔ malɛmbɛmalɛmbɛ na kati ya ebele ya bato mpo na kokóma na esika mosantu. Ebele ya bato batondi na monɔkɔ ya ndako-nzambe monene mpe na babalabala oyo ezali pembenipembeni na yango.’
MALOBA yango ekomamaki na zulunalo moko (El Economista) mpo na kolobela ebele ya bato oyo basanganaki esika moko na sanza ya Desɛmbɛ 2001. Bato soki milio misato bakendeki na ndako-nzambe wana ya monene ya engumba Mexico mpo na kokumisa Ngɔndɔ ya Guadalupe. Ebele ya bato bakendaka mpe kotala bandako mosusu minene ya losambo, na ndakisa Bazilike Saint Pierre na engumba Rome.
Ebele ya bandimi bapesaka motuya monene na bandako ya losambo. Maria afandaka na ekólo Brésil, ye alobi boye: “Mpo na ngai, ndako-nzambe ezalaki esika oyo nazalaki komiyoka penepene na Nzambe. Ezalaki esika mosantu. Nazalaki kokanisa ete kokende na ndako-nzambe ezalaki kopɛtola molimo mpe ete soki nakei na Misa te mpe nakei kotubela te na mokolo ya lomingo, nasali lisumu.” Consuelo afandaka na ekólo Mexique, ye alobi boye: “Nazalaki komiyoka ndenge mosusu ntango nazali na ndako-nzambe. Nazalaki komona ndako-nzambe eloko mpenza ya motuya. Soki nazali na kati, nazalaki komona lokola nde nazali na lola.”
Bato mingi bamonaka ete bandako-nzambe ezali bisika ya ntina mingi; nzokande, bato mosusu mpe bamonaka mpenza ntina na yango te na kati ya losambo. Lokola bato mingi bazali lisusu kokende na ndako-nzambe te, Peter Sibert, sango moko na ekólo Angleterre alobaki boye: “[Bato] bazali kopona makambo ya losambo oyo bango balingaka. Mibange mingi bazali Bakatolike mpe batosaka makambo ya lingomba na bomoi na bango, kasi bilenge bazali komipesa na makambo ya losambo te.” Zulunalo moko ya engumba Londres (Daily Telegraph), na ebimeli na yango ya 20 Novɛmbɛ 1998, elobaki boye: “Kobanda na 1979, bandako-nzambe soki 1 500 esili kokangama na Angleterre; nzokande 495 mpamba nde bafungoli yango lisusu mpe 150 nde babongisi lisusu.”
Na 1997, zulunalo moko (Süddeutsche Zeitung) ya engumba Munich, na ekólo Allemagne, elobaki boye: “Bandako-nzambe ekómi bandako ya sinema to mpe bandako ya bato: bandimi bazali lisusu kokende na misa te, bisika ya losambo ekómi mpo na makambo mosusu. . . . Likambo oyo ebandá mwa kala na Pays-Bas mpe na Angleterre ekómi mpe kosalema na Allemagne.” Zulunalo yango ebakisi ete: “Na boumeli ya mwa bambula oyo eleki, tokoki kotánga ata bandako-nzambe 30 to 40 oyo batɛki yango.”
Bandako-nzambe ezali mpenza na ntina mpo na kosambela Nzambe? Bakatedrale mpe bandako-nzambe mosusu ya mineneminene oyo etongamá na ndenge ya mindɔndɔmindɔndɔ elandi nde ndakisa ya bandako ya losambo oyo Makomami elobeli? Bandako ya motindo nini oyo bazalaki kosalela mpo na kosambela Nzambe ya solo mpe ya bomoi? Ndenge oyo bandako yango ya losambo ezalaki kosalelama ekoki koteya biso nini na oyo etali mposa ya bisika ya losambo mpe makambo oyo esengeli kosalemaka kuna?