Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/10 lok. 32
  • “Mpo okóma na bwanya na mikolo ezali koya”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mpo okóma na bwanya na mikolo ezali koya”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/10 lok. 32

“Mpo okóma na bwanya na mikolo ezali koya”

Jean de La Bruyère, moto moko ya France oyo azalaki kokoma babuku na ekeke ya 17, alobaki boye: “Bato mingi, ntango bazali bilenge, basalaka makambo oyo ekomemela bango mpasi ntango bakokóma mibange.” Ya solo, elenge oyo akokaka kozwa bikateli te akoki kokakatana mpo na kopona nzela oyo akolanda, mpe mpo na yango, akozala na esengo te mpe akokóma komilelalela. Ndenge moko mpe, elenge oyo azali mafumafu, akoki kolanda kotambola na nzela ya mabe, mpe na nsima akozala na esengo te na bomoi na ye. Koboya kosala malamu to kosala mabe na nko ekoki komemela moto mawa mingi mpenza.

Ndenge nini moto akoki kokima mpasi yango? Mpo na kolendisa bilenge bátika ezaleli ya kozanga kozwa bikateli, Liloba ya Nzambe ezali kopesa bango toli oyo: “Bongo, kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo, liboso mikolo ya mabe eya, to bambula eya ntango okoloba: ‘Nazali na esengo na yango ata moke te.’ ” (Mosakoli 12:​1, NW) Soki ozali elenge, salá makasi mpo na koyeba “Mozalisi na yo Monene” sikoyo.

Kasi ndenge nini Biblia ezali kosalisa bilenge na kokima bozoba ya bolenge? Biblia elobi boye: “Yoká toli mpe ndimá disipilini, mpo okóma na bwanya na mikolo ezali koya.” (Masese 19:​20, NW) Biblia ezali mpe komonisa polele ete koboya kolanda bwanya ya Nzambe to kotɛmɛla yango, ezala mpo na elenge to mpo na mokóló, ebotaka mbuma mabe. (Masese 13:18) Nzokande, kotosa mitinda ya Nzambe ememaka “mikolo mingi mpe bomoi molai mpe kimya,” bomoi ya malamu mpe ya esengo.​—⁠Masese 3:⁠2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto