‘Bólimbisanaka na motema moko’
ONDIMAKA ete Nzambe alimbisaka masumu oyo osalaka? Na États-Unis, emonani lokola ete mikóló mingi bandimaka ete Nzambe alimbisá masumu na bango. Doktɛrɛ Loren Toussaint, moto ya liboso oyo asalaki ankɛtɛ moko na Iniversite ya Michigan mpo na likambo yango, alobaki ete ntango batunaki bato 1 423 ya Amerika motuna wana, pene na bato 80 likoló ya monkama (80 %) kati na mikóló oyo bazali na mibu koleka 45 bandimaki ete Nzambe alimbisaka masumu na bango.
Kasi, likambo moko oyo ezali kobenda likebi ezali ete, kati na bato oyo batunaki bango motuna yango, bato 57 likoló ya mokama (57 %) nde balobaki ete bango mpe balimbisaki bato mosusu. Mituya wana ezali kotinda biso tókanisa maloba ya Yesu oyo alobaki na Lisolo Likoló na Ngomba, ete: “Mpo soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló akolimbisa mpe bino; kasi soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino akolimbisa mpe mabunga na bino te.” (Matai 6:14, 15) Ya solo, mpo Nzambe alimbisa masumu na biso, esengeli mpe tókakatana te mpo na kolimbisa bato mosusu.
Ntoma Paulo ayebisaki lisusu baklisto ya Kolose etinda yango. Alendisaki bango boye: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.” (Bakolose 3:13) Ya solo, kolimbisa ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te. Na ndakisa, soki moto moko azali koloba na yo maloba mabe mpe ya kozokisa, ekoki kozala mpasi mpo na kolimbisa ye.
Atako bongo, kolimbisana ezali na matomba mingi. Doktɛrɛ David Williams, moto ya mayele na sosioloji, alobaki boye mpo na makambo oyo ayekolaki: “Tomonaki mingimingi mpenza ete boyokani makasi ezali kati na likambo ya kolimbisa bato mosusu mpe bokolɔngɔnɔ ya makanisi epai ya mikóló oyo bazali na mbula koleka 50 mpe mibange na Amerika.” Likambo yango eyokani na maloba ya Salomo, mokonzi ya bwanya, oyo akomaki esili koleka bambula 3 000 ete: “Motema oyo na ezali kimya ezali bomoi mpo na nzoto ya mosuni.” (Masese 14:30, NW) Lokola ezaleli ya kolimbisa epesaka nzela ya kozala na boyokani malamu na Nzambe mpe na bazalani na biso, tozali na bantina malamu ya kolimbisana na motema moko.—Matai 18:35.