“Boyebi mpo na nini nayei kozongisela bino mbongo na bino?”
NANA, mwasi moko monzemba mpe mama ya bana mibali misato, ye afandaka na Kaspi, na ekólo Géorgie, alobaki na motema boye: “Ah, nazali mpenza na mposa ya mbongo!” Na ntɔngɔ moko, mposa na ye ekokisamaki. Alɔkɔtaki mbongo lari 300 (oyo ekokani na dolare 150) penepene na biro ya bapolisi. Moto ata moko te azalaki wana. Ezalaki mpenza mbongo mingi. Yeba ete, na boumeli ya mbula mitano, kobanda lari ekóma mbongo ya ekólo na bango, Nana amoná lokasa ya lari 100 (dolare 50) ata mbala moko te. Bato ya mimbongo ya mboka bakokaki mpe kozwa mbongo ebele bongo te, ata nsima ya kosala mombongo bambula ebele.
Na motema, Nana akanisaki boye: ‘Mbongo oyo ekozala na ntina nini mpo na ngai soki nabungisi kondima na ngai, kobanga Nzambe mpe bizaleli ya elimo?’ Alonaki bizaleli wana ya elimo ata na kati ya minyoko makasi to mpe na ntango bazalaki kobɛta ye mpo na kondima na ye.
Ntango akómaki na biro ya bapolisi, Nana amonaki bapolisi mitano bazali kolukaluka eloko moko. Ayebaki mbala moko ete bazali koluka mbongo yango, apusanaki penepene na bango mpe atunaki boye: “Bobungisi nini?”
Bango bayanolaki: “Mbongo.”
“Ntalo boni?”
“Lari nkama misato”
Nana azongisaki: “Nalɔkɔti mbongo na bino.” Mpe nsima atunaki bango: “Boyebi mpo na nini nayei kozongisela bino mbongo na bino?” Bazalaki na eyano ya kopesa te.
Abakisaki: “Mpo nazali Motatoli ya Yehova. Soki te, mbɛlɛ nazongiseli bino mbongo na bino te.”
Mpo na komonisa botɔndi mpo na ezaleli na ye ya bosembo, mokonzi ya bapolisi oyo abungisaki mbongo apesaki Nana lari 20.
Nokinoki, likambo yango epanzanaki na etúká mobimba ya Kaspi. Mokolo oyo elandaki, mwasi moko oyo azalaki kosala mosala ya kokɔmbɔla ndako kuna na biro ya bapolisi ayebisaki Nana boye: “[Mokonzi ya bapolisi wana] azalaka ntango nyonso na mikanda na bino na biro na ye. Sikoyo namoni akosepela na yango lisusu makasi.” Polisi moko kutu alobaki boye: “Soki bato nyonso bázalaka Batatoli ya Yehova, mbɛlɛ nani lisusu akosala likambo ya mabe?”