Bazali na esengo mpo bayekoli kotánga!
NA BISIKA mosusu ya Bisanga Salomon, bato mingi mpenza (80 %) oyo bazali lelo oyo Batatoli ya Yehova, liboso bayebaki kotánga mpe kokoma te. Yango wana bazalaki kopesa mpenza biyano te na makita, lisusu, ezalaka mpasi mpo bákoka koteya bato mosusu mateya ya solo ya Bokonzi. Ekoki mpenza kosalema ete mikóló oyo basimbá naino biki te na bomoi na bango báyeba kotánga mpe kokoma?
Masangá mingi ya Batatoli ya Yehova na Bisanga Salomon basalelaki mwa buku Omipesa na kotánga mpe kokoma, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova, na bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma. Masolo oyo ezali komonisa ndenge ebongiseli yango esalisi bankama ya bato báyeba kotánga mpe kokoma. Mpe likambo oyo eleki ntina, bakómi na likoki ya kosakola kondima na bango malamu koleka mpo bayekoli kotánga.—1 Petelo 3:15.
Misionɛrɛ moko ya mwasi oyo batindaki ye na lisangá moko oyo ezalaki na basakoli ya Bokonzi koleka mokama, amonaki ete na ntango ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, bato moke kaka nde bazalaki na bazulunalo na mabɔkɔ mpe bato moke mpenza bazalaki kopesa biyano. Mpo na nini? Mpo bayebaki kotánga mpe kokoma te. Ntango bapesaki liyebisi na lisangá ete bakosala kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma, misionɛrɛ yango asepelaki kopesa nkombo na ye mpo atángisaka na kelasi yango. Na ebandeli, kaka bandeko moke nde bayaki; kasi eumelaki te, bilenge mpe mikóló koleka 40 bakómaki koya.
Yango ebotaki mbuma nini? Misionɛrɛ yango alobi boye: “Ntango kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma ebandaki, mwa moke na nsima nakendaki na wenze na ngonga ya motoba ya ntɔngɔ kosomba bilei mpo na ndako na biso bamisionɛrɛ. Kuna namonaki bayekoli mosusu, ata bana mike mpenza, bazalaki kotɛka kokoti mpe ndunda. Mpo na nini? Mpo balingaki kozwa mbongo ya kosomba biki mpe kaye mpo na kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma! Lisusu, kelasi yango epesaki moto na moto mposa ya kozala na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ye moko.” Abakisi ete: “Lelo oyo, na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lisangá, ezala bilenge to mikóló bazali kopesa biyano, mpe boyekoli ekómi esengo.” Misionɛrɛ yango asepelaki lisusu mingi koleka ntango bayekoli minei ya kelasi yango basɛngaki bábanda kobima na mosala ya kosakola mpo ete, mpo na kozongela maloba na bango moko, bazalaki “kobanga lisusu te.”
Matomba oyo bayekoli bazwaki na eteyelo yango esukaki te kaka na koyeba kotánga mpe kokoma. Na ndakisa, banda bambula ebele, Motatoli moko azalaki na mwasi oyo azalaki mondimi te mpe mwasi yango azalaki kosalela bandeko na lisangá matata mingi. Azalaki kobamba bato mabanga soki kaka batumoli ye mwa moke, mpe kutu kolanda basi mosusu na eteni ya libaya. Na mwa mbala mosusu oyo akendaki na makita elongo na mobali na ye, azalaki na zuwa makasi mpo na mobali na ye, yango wana mobali na ye azalaki kolata manɛti ya moindo mpo mwasi na ye aloba te ete azali kotalatala basi mosusu.
Ntango kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma ebandaki, mwa moke na nsima mwasi yango atunaki ete: “Nakoki mpe kokomisa nkombo?” Bandimaki ye. Kobanda ntango wana, azangisaki ata mokolo moko te koya na kelasi to na makita ya lisangá. Amipesaki mpenza na kelasi ya kotánga mpe akómaki kokola na ndenge ya kokamwa, yango epesaki ye esengo mingi. Na nsima atunaki ete: “Nakoki koyekola Biblia?” Mobali na ye andimaki na esengo mpenza koyekola na ye, mpe azali se kokende liboso na koyeba kotánga mpe kokoma mpe lisusu na boyebi na ye ya Biblia.
Mpo na moto ya mbula 50 oyo asimbá naino biki te na bomoi na ye, kosimba biki mpo na kokoma balɛtrɛ ya alfabɛ ekoki kozala etumba monene. Ntango babandi kelasi sika, ndenge oyo bato mosusu bazalaki kofina biki na misapi ebimisaki bango kutu bambuma. Nsima ya kobundana bapɔsɔ mingi mpo na koyeba kosimba biki malamu, bayekoli mosusu balobaki na elongi ya esengo mpenza ete: “Sikoyo kokoma ekómi pɛpɛlɛ.” Balakisi bayokaka mpe esengo ntango bazali komona bayekoli bazali koyeba kotánga mpe kokoma. Molakisi moko alobaki boye: “Kotángisa epesaka esengo mingi, mpe mbala mingi na nsuka ya koyekola, bayekoli babɛtaka mabɔkɔ mpo na komonisa botɔndi mpo na ebongiseli yango oyo euti epai na Yehova.”
Bayekoli oyo bayebi sikoyo kotánga mpe kokoma bazali kosepela elongo na bamisionɛrɛ. Mpo na nini? Mpo ete lokola bayebi kotánga mpe kokoma, bakoki kosalela mayele yango mpo na kokumisa Yehova.
[Bililingi na lokasa 9]
Mikóló mpe bilenge bazali kosepela na kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma