Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/8 lok. 32
  • Liteya tokoki kozwa na nkɔngi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya tokoki kozwa na nkɔngi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/8 lok. 32

Liteya tokoki kozwa na nkɔngi

“ATA nkɔngi na likoló​—eyebaka malamu ntango na yango oyo etyami . . . Kasi bato na ngai bayebi kosambisa ya Yehova te.” (Yilimia 8:7, NW) Mosakoli Yilimia alobaki maloba yango mpo na kosakola ete Yehova akopesa bato ya Yuda etumbu mpo bazalaki batomboki, mpe batikaki Yehova Nzambe na bango mpo na kosambela banzambe ya bapaya. (Yilimia 7:18, 31) Mpo na nini Yilimia asalelaki ndakisa ya nkɔngi (cigogne) mpo na koteya Bayuda oyo bazalaki sembo te?

Na Yisalaele, nkɔngi​—mingi mpenza nkɔngi ya mpɛmbɛ​—ezalaki komonana mingi ntango ezalaki koleka mpo na kokende na mikili mosusu na eleko ya mpiɔ makasi. Na Liebele, nkombo ya ndɛkɛ wana ya monene mpe ya makolo milai, elimboli “ye oyo azali sembo; azali na motema-boboto.” Ndimbola yango ebongi na ye mpenza mpamba te nkɔngi ya mpɛmbɛ ekeseni na ebele ya ndɛkɛ mosusu; nkɔngi ezalaka mwasi na mobali bomoi na yango mobimba. Nsima ya kolekisa eleko ya malili na bisika ya molunge, nkɔngi mingi ezongaka mbula na mbula, mbala mingi mpe ezongaka kaka na zumbu oyo basalelaki na mbula oyo eleki.

Nkɔngi emonisaka ete ezali sembo na ndenge ya kokamwa na mayele na yango ya lɔɔmbi (instinct). Ezala nkɔngi ya mobali to ya mwasi, yango nyonso efandelaka maki mpe eleisaka bana. Buku moko (Our Magnificent Wildlife) elobi boye: “Nkɔngi oyo Ezali na bana ezalaka sembo na ndenge ya kokamwa. Na Allemagne, nkɔngi moko ya mobali oyo elingaki kotɛlɛma na nsinga ya kura, ekangamaki mpe ekufaki. Mwasi na yango elandaki kofandela maki mikolo misato, mpe etikaki zumbu kaka mbala moko mpo na ntango mokuse mpo na koluka bilei. . . . Na esika mosusu, babomaki nkɔngi moko ya mwasi na masasi, nkɔngi ya mobali etikalaki kobɔkɔla mwana.”

Ya solo, lokola mayele na yango ya lɔɔmbi etindaka yango ezala sembo bomoi na ye mobimba epai ya mwasi na yango, emonisaka ete ebongi mpenza na nkombo yango ete “ye oyo azali sembo.” Na bongo, ebongaki mpenza kozwa ndakisa ya nkɔngi mpo na koteya malamumalamu Bayisalaele oyo bazalaki sembo te mpe na matoi mangbongi.

Lelo oyo, bato mingi bazali komona ete kozala sembo esilá ngala; ezali likambo ya malamu kasi ebongi te ete bázalaka sembo. Ebele ya mabala ezali kokufa, bato bazali kosundola balongani na bango, bazali koyiba mbongo, mpe bazali kokosa na makambo ndenge na ndenge, nyonso wana ezali komonisa ete bato bamonaka lisusu te ntina ya kozala sembo. Nzokande, Biblia emonisaka ete kozala sembo oyo euti na bolingo mpe na boboto ezali na ntina mingi. Yango elendisaka baklisto ‘bálata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo mpe bosembo.’ (Baefese 4:24, NW) Ya solo, bomoto ya sika esalisaka biso tózala sembo, kasi tokoki mpe kozwa liteya ya kozala sembo epai ya nkɔngi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto