Masolo ya Basakoli ya Bokonzi
‘Liloba ya Nzambe ezali na nguya’
NA Jamaïque, esanga moko ya Caraïbes, bato mingi bameseni na Biblia. Kutu, Biblia King James Version ezali na bandako mingi mpenza, mpe bato mosusu basili komona ete “liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” (Baebele 4:12, NW) Nguya ya Liloba ya Nzambe ekoki kobongola bomoi ya bato, ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango.
Mokolo moko, mobali moko, nkombo na ye Cleveland autaki na mosala, ntango Motatoli ya Yehova moko ayaki kotala ye na ndako na ye. Motatoli yango ateyaki ye mwa makanisi oyo euti na Makomami; nsima na yango, atikelaki ye mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi na seko. Cleveland ayebaki naino te ndenge oyo nguya ya Liloba ya Nzambe elingaki kosala na bomoi na ye.
Cleveland azalaki na momeseno ya kobondela mbala misato na mokolo, azalaki kosɛnga Nzambe asalisa ye ayeba ndenge oyo akoki kosambela ye malamu. Cleveland azalaki mpenza na makanisi ete baboti na ye bazalaki kosambela na ndenge oyo ebongi te, kasi nsima ya kotalela mangomba mosusu, azwaki eyano ya malamu te. Atako ayokaki nkombo ya Batatoli ya Yehova, azalaki kokanisa te ete bateyaka mpenza solo ya Biblia. Atako azalaki kokakatana, Cleveland andimaki koyekola Biblia na Motatoli oyo akendeki kotala ye na ndako. Mpo na nini? Mpo ete alingaki komonisa ye ete Batatoli bateyaka solo te!
Mosika te, Cleveland ayebaki ete azalaki kosepelisa Nzambe te na ndenge oyo azalaki na makango mibale. (1 Bakolinti 6:9, 10) Na nsima ya koyekola mbala mibale mpamba, aboyaki basi yango mibale. Akómaki mpe koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Kasi, yango ebimiselaki ye komekama mosusu.
Cleveland amipesaki mpenza na kobɛta ndembo na ekipi ya kartye na ye, mpe bazalaki kobɛta yango kaka na bangonga oyo makita ezalaki kosalema. Asengelaki kosala nini? Atako baninga na ye ya lisano, antrenɛrɛ na bango, mpe baninga na ye mosusu batyaki ye mbamba, Cleveland azwaki ekateli ya kolongwa na ekipi. Liloba ya Nzambe ebandaki mpenza komonisa nguya na yango, etindaki ye na kozwa ekateli mpo na bolamu na ye!
Nguya ya Liloba ya Nzambe emonanaki lisusu polele ntango Cleveland abandaki koteya bato mosusu boyebi ya Biblia. (Misala 1:8) Yango wana, baninga na ye mibale ya lisano bakómaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Ntango Cleveland akokisaki masɛngami mpo na kozala mosakoli ya nsango malamu, azalaki kosepela mingi na mosala ya kosakola, azalaki kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kosalisa bato mosusu.
Lokola Liloba ya Nzambe ezalaki ntango nyonso komonisa nguya na yango epai na ye, nsukansuka Cleveland azwaki batisimo na mai mpo na komonisa ete amipesi na Nzambe mpe sikoyo azali kosala mosala ya mobongisi-nzela mpe azali mosaleli na misala na lisangá.
Na JamaÏque mpe na mokili mobimba, bankóto ya bato basili koyeba mpenza ete Liloba ya Nzambe “ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”
Karte/Bililingi na lokasa 8]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
JAMAÏQUE
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Karte mpe libungutulu ya mokili: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.